Luka

Yoko tir ya missile ezwamaki na likolo lya ekolo ya Ba-Israel, o mokolo mwa 2 ya Marsi 2026. Yoko tir ya missile ezwamaki na likolo lya ekolo ya Ba-Israel, o mokolo mwa 2 ya Marsi 2026.  (ANSA)

Na Moyen-Orient, Bakristu bazali kati na Motungisi mpe bozangi elikya

Lokola bato banso ya etuka eye, bakristu ya Moyen-Orient bazali kokutana na ntango eye ya mpasi, lokola ba bombi ya Iran ezali kokóba mpe ba tirs ya représailles ya Teheran. Bikóló biyiké bikangami na mibeko ya kobima te, ndé, basusu bazali kokundola ntina ya kosàmbela mpo na kimya.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

O mokolo mwa misato ya bitumba kati na Iran, Israël mpe Etats-Unis, mobulu ezali kokóba kopalangana na etuka mobimba. Atako Mokambi ya Etats-Unis Donald Trump alaki ‘te bitumba ekozala na boumeli ya baposo minei, ba Gardiens ya révolution na ngambo na bango balobaki o mokolo mwa mibalé 2 ya Marsi ‘te babundisaki bato koleka nkàmà mitano (500) mpo na kozongisa. Etumba eye ya sika ebakisaki bobangi ya banungunungu ya liboso. Na mokolo mwa lomingo sima ya Angelus, ( le Pape Léon XIV exhortait les responsables) Pápa Léon XIV alendisaki bakonzi ba mangomba ‘te «bápekisa kobakisama ya mobulu moye, noki te, ekokóma libulu oyo bakokoka kobongisa soki moke te». Bakristu mingi ya Moyen-Orient bazali komitungisa lolenge moko, atako bazali na bomoi ya lolenge moko te.

Awa bangonga biye bileki, etungisi makasi Moyen-Orient - na Iran, na Terre Sainte, na Liban, na Irak mpe na etuka mobimba – bikela bya ngambo ya Orient to Œuvre ya Orient ezali komitungisa makasi na ntina na kobakisama ya mobulu. Elobamaki na nsango moko epesamaki na association yango o mokolo mwa lundi. Na ntongo ya lelo, “bato ba Liban balamuki na makanisi ya kokamwa, kasi mpe ya kolemba mpe ya nkanda”, elobi Vincent Gelot, mokambi ya “ Oeuvre ya Orient mpo na Liban mpe Syrie. Bato awa bayebi nini ezali etumba nà Israël mpe bazali komiyoka lokola bazali kozongela maye masalemaki mbula moko nà ndambo eleki, nsima ya bobómi ya Nasrallah na ba biper. Vincent Gelot, akanisi likambo ya attaki ya 17 Okotobe ya mobù 2024 na ba bipers na ba walkie-talkies ya bato ya Hezbollah, oyo esalemaki na Israel. Alobi ‘te: “Etumba eye elandaki, ebimisaki ba milio 1,2 ya bato na Liban mpe ebebisaki biloko mingi”.

 Bobangi na Liban

Na tongo ya Lundi, ba eteyelo etikalaki ya kokanga na Beyrouth sima ya ba bombi ya Israel, oyo ezali sika kotala ngambo ya Sudi ya mboka mokonzi ya Liban. Bato bayiké batikaki bandako ba bango na Sudi ya Liban, sima ya mbela Tsahal abwakaki ya kotika bamboka ya bango. Bipai binso, bato bazali na mitungisi. Vincent Gelot alobi ‘te: “Moko kati na baninga na biso, eteyelo moko ya ba Filles ya Charité, oyo ebebaki na mbula eleki, ezali na bobangi makasi”.

Bato bazali na libanda ya mindelo ya Liban, bazali mpe na bobangi makasi. “Moto moko te ayebi likambo nini ekoki koleka, mawa ezali makasi”, elobi Pascale Casati-Ollier, diretrice ya biro Irak ya bikela ya Orien na Erbil, elongo na mobali na ye Jean. Balobi ‘te : “Bandeko ba biso bazali kokeba mpe bazali kotikala na bandako na bango mpo babombi ezali kokóba. Ezali bozangi koyeba makambo manso”. Engumba-mokonzi ya Kurdistan ya Irak, esika basoda ya Amerika bafandaka, ebundisamaki na bangonga oyo euti koleka na masasi ya Iran.

Bakristu ya Golfe batikali ya kokangama

Na mikili ya Golfe, bisika wapi ba Iran bakaneli kozongisela Amerika nà Israel mabe, bato bayiké ya mangomba ya bakristu bazali lokola na kati ya bolókó. Bato moke ya Lingomba ya Katoliko na Bahreïn bazali kosala nyonso mpo na kosunga na molimo, bandimi ba bango 80.000. Mpo ya likambo ya bokengi, epekisami na bango basangana ata mpo ya misa to misala misusu ya paloase. Milulu mpe bamalongi, ezali kopesama na nzela ya internet na ba lokotà ndenge na ndenge, kino mibeko misusu ekopesama. Liyebisi liye, epesami na lokasa ya Face-Book ya Paloase ya Sacred-Heart Manama. Sàngó Francis P. Joseph OFM Cap, alobi ‘te, «na eleko eye ya mpasi, topimela bakristu babiso ya paloase, eloko ya motuya ekopesa bango makasi mpe bosangani». 

Mgr Paolo Martinelli,  vicaire apostoliki ya Arabie ya Sudi, asengi ‘te mp ona ye bitumba ekita, mpe alobeli ntina ya “masóló ya solo solo mpe ya bontoki: makaneli ya kowelana ezali kobebisa, kasi ezali kotonga kimya te”.

Libyangi ya Terre Sainte

Na Mabele Mosantu to mpe Terre Sainte, na bangonga mileki, makélélé mya sirene eyokanaki tango babundisaki ya Iran na mboka ya Bayuda. Na eteyelo ya Biblia ya Français na Jérusalem, esika ya losambo oyo ezali na nsé ya mabelé ezali esika ya kobombana mpo na bandeko ya République dominicaine, bana-kelasi mpe bapaya. Ndeko to momfelele Olivier Poquillon, mokambi ya Éteyelo ya Biblia mpe archéologie ya lokotà ya lifalansa ya Jérusalem (EBAF), alobi ‘te misa mpo na kimya ezalaki kosalema na lisalisi ya mikapo ya Missale oyo elobamaka mpenzampenza “na ntango ya bitumba to na ntango ya yikiyiki”.

Mokonzi ya Lingomba ya Dominica alobi ‘te , ut’o mokolo mwa poso, bato bàzala na bokeba mingi. Ezali na ntina mingi ‘te biso tókoba kotalela mokapo na mobimba mwa yango. Ezali na ntina mpo ‘te bitumba ezali eteni ya lisoló ya lobiko. Yango ezali kokundwela biso ‘te, na kati ya matata maye, Kristu, azali Mokonzi ya Kimya”. Awa miso mizali kotala se likolo, mpe ba radars ezali kobaluka na ngambo ya Iran, Terre Sainte ezali kokóba konyokwama. Mobulu oyo ezali kosalema na mabelé ezali kokóba, mingi mpenza na Cisjordanie epai wapi mboka ya bakristu ya Taybeh ezali konyokwama tango inso.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

02 sánzá ya mísáto 2026, 20:31