Luka

Léon XIV: Bosukisa kobakisama ya mobulu yambo ‘te ekóma libulu ekoki kobongisama te

Na nsuka ya losambo la Maria ya Angélus, o mokolo mwa lomingo loye, mwa 1er ya sanza ya Marsi, Léon XIV alobelaki «ngonga ya mawa», awa, Iran ebundisamaki na ba bombi mpe ezongisaki na etumba ena. Akosenga na makasi mpenza, mpo na kimya. «Kimya oyo etongami te na makaneli moko na basusu, to na bibundeli ya kobomana oyo ezali kolona liwà»

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Lokola ba bombi ya Israel mpe ya Etats-Unis na Iran ezali se kokoba o mokolo moye mwa lomingo, 1er mars, mpo ya mikolo mibale molandani, Papa abwakaki mbela makasi nsima ya losambo la Angelus mpo ‘te mobulu esila o etuka. “O ntei ya ngai na zali kolanda nà mawa mpenza, maye mazali koleka sik’awa na ngambo ya Moniele ya mokili to (au Moyen-Orient) mpe Iran”. Elobaki yen a bakristu basanganaki na ye elongo na esika Saint-Pierre. Yambo alobaki na bango ‘te tókanisa to tókundola ‘te :«boboto mpe kimya ekoki kotongama te na nzela ya makàneli to botomboki biso na biso, to na nzela ya bibundeli, oyo ebotaka se libebi, mpasi mpe liwa, kasi kaka na nzela ya masolo ya mayele, ya solosolo mpe ya bontoki».

Tika ‘te diplomatie ezongela kozwa mokumba mwa yé

Episkopo wa Roma alobaki lisusu ‘te : «Liboso lya likàmà linene, nazali kosenga na bato banso bazali ngambo na ngambo ya likambo liye, bàkamata mokumba mwa bango ya kosukisa mobulu oyo ezali se kobakisama, yambo ‘te ekóma libulu oyo ekoki kosila te». Solo liboso lya makelele ya ba missiles, Pàpa alendisaki « diplomatie ezonga na esika na yango mpe ezwa mokumba na yango ya kozongisa boyokani katu na bikolo, bongo ezala mpo ya bolamu bwa bato. Mpamba te, bato bazali kozila kofanda esika moko na kimya, oyo esimbami na bosembo, ekende liboso». Asengaki mpe alendisaki bandimi to bakristu bàbondela mpo na kimya.

O mokolo mwa 28 ya sànzà ya Febwali, Etats-Unis nà Israël babandaki bondongwani ya babombi ya likóló. Ezali kosimba kaka ba ndako ya minene minene ya basodà (ba infrastructures militaires) ya Iran kasi pe likolo lya ba ndako ya bokonzi (structures ya pouvoir) ya républiki ya islame ya Iran. O kati na yango, babomaki Ayatollah Ali Khamenei, Mokambi Monene, oyo azalaki na bokonzi na Iran banda mobù 1989. Iran ezongisaki na kobwaka ba missiles to ba bombi na Israël mpe na mikili mingi misusu ya Golfe, bisika epai wapi kuna, basodà to ba bases militaires ya Etats-Unis bafandaka.

Botungisami mp ona Pakistan nà Afghanistan

Kati na lisoló na ye, Léon XIV amonisaki mpe mawa ma ye mpo na bitumba bizali kobima sikawa kati na ekolo ya Pakistan mpe Afghanistan, na mikolo miuti koleka. “Nazali kobondela mpo ‘te masolo mazongela na lombango. Tósambela elongo mpo ‘te bomoko elónga, o kati ya matata manso ma mokili. Bobele kimya, likabo lya Nzambe, nde ekoki kobikisa bampota kati na bato”, elobaki Tata Mosantu. Nsima ya basanza mingi ya matata, Pakistan na Afghanistan bakotaki na “etumba ya polele” o mokolo mwa 27 ya sànzà ya Febwàli, tango Kaboul ebimisaki etumba na mindelo na bango, myango nde ebendaki mpe ebimisaki bitumba ya mpepo, bongo Pakistan azongisaki.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

02 sánzá ya mísáto 2026, 08:27