Mgr Berardi : Esengeli kosambela mpo tomitika te ‘te tomemama na bokobi ya nzela enà
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Ut’o Awali na Barheïn, Mgr Aldo Berardi, vicaire apostoliki ya Arabie ya Nord, alakisi polele bomitungisi bwa yé, na tango oyo bitumba ekomi na nivo ya likolo na etukà, kati na ba bombi ya ba-israéle elongo na ba-Amerika nà Iran mpe bozongisi ya républiki ya Islame ebetaki ba missiles na bikolo ya golfe, oyo wapi basoda ya Amerika bafandaka. Na mokolo mwa poso, mwa 28 ya Febwali, oyo ezalaki mokolo mwa yambo ya bitumba, Mgr Berardi atindaki liyebisi moko na ba Nganga-nzambe banso, na ba Sàngó mpe bamamelo banso, ya vicariat na ye, oypo ezwami na bikólo minei ya Arabie: Koweït, Arabie Saoudite, Bahreïn mpe Qatar, mpe alobaki ‘te: “tozali na ntango ya makama mpe asengi na Chaun bakende na esika ya kobombama, batikala na bomoko kati na losambo mpe balanda malako ma bokengi ya bakonzi ba mboka.
Solo, tozalaki kozela ‘te Pápa aloba mokolo mwa lomingo, mpamba te likambo lyango ezali mpenza mpasi. Etúká ezali na mindondo mingi, etungisami na nivo ya nkita mpe sikawa, na bitumba ya Israël elongo nà Amérika. Na ngambo mosusu, bakanisaki “te Iran ekoki kosala likambo moko ya makasi, mpamba te bakomaki to basimbaki kati ya societe na bango. Yango ndé ebimisaki lisusu boyinani mpe nkanda. Tozali na logiki ya “ yo osimbi ngai, ngai mpe na simbi yo, yo obeti ngai, ngai mpe na beti yo”.
Na ngonga eyey tozali koloba, likambo ezali lolenge kani, kuna esika bozali na Bahrein mpe na bisika bisusu ya etukà? Mpamba te, bingumba ya Golfe esimbamaki na ba missiles ya bozongisi …
Kaka sik’oyo, kala té, to bobele mwa ndambo ya ngonga eleki, (pene na 13h00 ngonga ya Roma), missile moko elekaki likolo ya episkopat awa, mpe biteni na yango ekatanaki na Bahreïn, ekweaki pembeni ya cathédrale. Mótó mozalaki te mosika nà ndako na biso. Likambo yango ezali mpenza kotungisa biso mpamba te ndako-nzambe na biso ezali ya sika. Ba missile ezali kobeta kobanda lobi. Yango wana, bakangaki bandako-nzambe nyonso mpo mobulu ebima te. Ezali ba Eklezya te nde ezwamaka mbala moko, kasi ba débris, ba explosions ekoki kobebisa ba bâtiments, kasi koleka nyonso ekoki kozokisa bato. Yango ezali kokoba, ezali na ba alerte mbala na mbala mpe yango wanato banzi ‘te ezali malamu moto na moto atikala na ndako na ye. Tokobima te mpo na ntina ya bokengi. Bomoi ezali kolemba na lolenge moko, mpe mangomba na biso ekangami. Basàngó bazali kosala misa elongo na mpokwa mpo na kimya, yango nde nasengi na paloase na paloase, ‘te basàngó banso, bàsangana mpo na kosala misa mpo na kimya. Yango esalemi na video, mpo na Manama mpe mpo na Koweït. Bato basengaki soko bakoki kosangana na misa yango, kasi tolingi te kozwa likama. Na ndakisa ya Qatar, ba mpolisi bakangaki eklezya, lopango mobimba ya lingomba ekangamaki, moto moko te akoti, moto moko te abimi. Bongo, lisusu, biteni ya ndako ya losambo oyo ezalaki mosika te na esika yango, ebebaki. Bato banso bazali kobondela, mpe bazali kozela ‘te makambo ekita to kimya ekota.
Pápa alobeli bakonzi ya mokili, baye bazali na mokumba ya kosilisa mobulu moye, mozali se kobakisama, liboso ‘te ekóma “libulu to eloko ekoki kobongisama”. Ozali komona likama na esika oyo ozali?
Iyo, mpamba te, lokola oyebi yango, na eteni oyo ya mokili, nkanda ezali makasi mpe eùmeli bikeke mingi. Na yango, tango okokotisa mobulu oyo ya monene, tango okosimba bolingi bwa bato, tango ozali kobundisa moko na moko na lolenge ya mobulu, Bozongisi na yango ekozala mpe ya mobulu makasi. Sóló, tokóti na kati ya libulu moko ya mozindo, mpe toyebi te esika ekoki komema biso. Likama ezali ‘te tokoki kozwama na nzela ya kozongisa mabe na mabe mpe ya mobulu oyo ekoki komema biso mosika. Esengeli tosambela mpo ‘te kimya ezonga mpe tomemama te na nzela ya mobulu. Soki moto na moto akeyi na bitumba mpo amiyoki ‘te bazali kobundisa ye, likama ezali ‘te mboka to etuka ekopanzana.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.