Luka

Lingomba ya Palestine Taawon.  Lingomba ya Palestine Taawon.   ( TAAWON.ORG)

Litomba Zayed eponi lingomba ya Palestine Taawon lokóla molongi ya misato

Litomba Zayed po ya Bondeko ya Bato aponaki lingomba ya Palestine Taawon lokóla molongi ya misáto, na bopesi mbano na lingomba ena po ya mosála na ye ya lisálisi mpe ya botomboli esalema úto mibú ebelé na engumba nionso.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Po ya mbala ya sambo, litomba Zayed po ya Bondeko ya Bato asakolaki mokolo ya yambo 'te lingomba ya Palestine Taawon ekozala molongi ya misáto. O eleko ya molulu ya mobú ya bopesi matomba eye ekosalema na Esika ya Bakeli ya Abu Dhabi na 4 ya sánzá ya ibále 2026, lingomba, esalema na 1983, ekozua lokúmu pembeni ya balongi ya yambo mpe ya mibalé.

Lingomba Taawon eponamaki na bondimi mosála na ye ya lisálisi mpe ya botomboli, eye ekokóma mobú na mobú na bomoi ya koleka milio moko ya baí-Palestine na Cisjordanie, na Gaza mpe na bisika ya babombami na Liban. Úto bokelami na ye, Taawon abimisa koleka milliard moko ya dollar na makambo ndéngé na ndéngé, mingi mpenza na botéi, bopesi na bilenge bonsómi na mosála, bosungi ya bitike, ba mwángo ya bonkoko, bobongisi ya bituka ya lisapo mpe botomboli ya masangá, na káti waná bokolongono, bilanga mpe lisálisi ya lombango.

Lingomba esálisa koleka mwángo 8 200 biye bikosunga baí-Palestine, mingi mpenza bilenge, po ya kolendisa bango bazala mbamba na mokili, ya komátisa makoki ya bozui misála mpe ya kotómbola masangá na bangó na maye mitali nkita, bomoto mpe bonkoko, na bobombi libula ya Palestine. Mokambi ya Taawon, Dr Nabil H. Qaddumi, alobaki esengo na ye na etuluku ya boponi ya litomba, eye esangisi bato ebelé ya nzebi ya mokili na likambo ya bomatisi bosololi mpe bovandi lisangá ya bato.

Póso elekaki, bazuzi ya litomba Zayed baponaki boyokani ya boboto káti y'Armenie mpe Azerbaïdjan lokóla molongi ya yambo mpe Zarqa Yaftali, mokengeli ya bilenge bási y'Afghanistan, lokóla molongi ya mibále. Mokónzi Ilham Aliyev y'Azerbaïdjan mpe Ministre wa Yambo Nikol Pashinyan y'Armenie balobaki esengo na bangó po ya bondimi ena ya lisangá eye ekosálisa po ya kolendisa makási ya kotómbola boboto na engumba ya Caucase.

Úto 2019, litomba Zayed epesa mbano na balongi 20 ya bikóló 20, na bondimi misála mpe bato ya mokili baye bakopesa likabo lyoko ya malonga na botomboli mpe bopusani ya mitúya ya bondeko ya bato na mokili mobimba.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

28 sánzá ya yambo 2026, 11:42