Boyokani ya boboto káti y'Arménie mpe Azerbaïdjan elongi Litomba Zayed 2026
Vatican News
Nsakola ya balongi ya Litomba (Prix) Zayed po ya Bondeko ya Bato 2026 esálemaki mokolo ya yambo 19 ya sánzá ya yambo. Communiqué yoko elobi 'te batindami ya ekoló Arménie mpe ya ekoló Azerbaïdjan, baye batiaka mokoloto na boyokani ya boboto káti na bikóló babále na 8 ya sánzá ya mwambi 2025 na Washington, n'Amerika, bakozua mbano na 4 ya sánzá ya mibále ekoya, Mokolo ya mokili ya Bondeko bwa Bato, na Mémorial ya Fondateur, na Abou Dhabi, na Émirats arabes unis. Zarqa Yaftali, mokengeli ya botéi ya bilenge bási y'Afghanistan, akozala waná lokóla. Ezali mbala ya yambo 'te Commisio ya mokili epesa mbano na balongi ba Caucase pe Afghanistan.
Boboto, nzelá yoko ya libela mpe ya bokobi
Boponi ya kopesa mbano ya boyokani káti na bikóló babále ya Caucase -ndéngé ekomami na communiqué- ezali bondimi ya "nzelá yoko ya boboto, ya lisoló, ya bobongisi pe ya bosilisi bitumba bisálisami na Bikóló babále, eye ekolakisa 'te bozongisi bondeko ezali likambo lyoko ya bongo bongo te, kasi nzelá yoko ya koúmela mpe ya bokobi". Boyokani boko eye ebimi na "mokáno moko ya ntina ekambemi na bokambi boko ya limoni eye ekoluka kosukisa ba mibú bebo ya etumba mpe ya pási ya bato na Caucase". Po ya Ministre wa Yambo ya ekóló Arménie, Nikol Pashinyan, "ezali lokúmu lonene" ya kozua bondimi eye po ya makási esálemi zambi ya kosálisa "boyokani ena ya lisapo". Kaka bongo, mokambi ya ekóló Azerbaïdjan, Ilham Aliyev, atalisaki 'te litomba ena ezali na ntina yoko ndéngé mosusu po ekomema kombo ya Cheikh Zayed bin Sultan Al Nahyan, mokeli ya Émirats arabes unis, mpe ekozua lokóla lisúngi ya Papá Léon XIV mpe ya Ahmed Al-Tayeb, imam enéne y'Al-Azhar.
Po ya bilenge y'Afghanistan
Zarqa Yaftali alimbolami na communiqué lokóla "mwási moko ya mpiko oyo abonzi bomoi na ye mobimba po ya kokengela likoki ya botéi ya bási mpe bána", na bopesi makoki, lisálisi lyoko psychosocial mpe misála na koleka bato 100 000 na Afghanistan, na bopesi bôngó elikya na bilenge bási bazali kobika na loléngé ya pási. Amilobelaki "atutami mpe atondisami na bopaswami motéma", na nsakola ya litomba eye ekolakisa "nsango yoko ekási mpe ya ntina" po ya bási y'Afghanistan, po ekokotisa elikya mpe moléndé, mingi mpenza na bayékoli ya bilenge bási ya bitéyelo ya Internet mpe po ya bilenge bakomisa kombo po ya matéya ya boboto, libateli (sécurité) mpe bokambi.
Litomba lyoko po ya momeseno ya lisoló mpe ya bobiki elongo
Balongi baponami na lisangá lyoko ya bonsómi ya bazuzi, káti na bangó ezali lokóla episkopo ya lokúmu José Tolentino de Mendonça, préfet ya dicastère po ya Bonkoko mpe Botéi. Secrétaire ya manso ya Litomba Zayed, zuzi Mohamed Abdelsalam, alobaki 'te boponi ya kopesa mbano n'Arménie mpe Azerbaïdjan "ekolakisa etinda mpe misála ya litomba", ezali bongo "kotómbola pe kosálisa momeseno moko ya lisoló mpe ya bobiki elongo", po esukisi pembeni ya mibú 40 ya bobéndani mpe ya bitumba na Caucase, "na boloni misisa makási ya lobi lyoko ya bomoko mpe ya sikisiki po ya baí-mboka babále". Catherine Russell, Mokambi ya Unicef, alobaki 'te Commisio alingaki kopesa mbano na Zarqa Yaftali mingi mpenza po ya mosála na ye ya bonsómi ya bási na eleko yoko ya pási.
Likanisi ebotami na botiyi mokoloto na Mokánda etáli bondeko ya bato na Papá François mpe Ahmed Al-Tayeb, Imam enéne y'Al-Azhar, na Abu Dhabi na 2019, na bolandi ya libula ya cheikh Zayed bin Sultan Al Nahyan, mokeli ya Émirats arabes unis, litomba Zayed ekopesa mbano na bato mpe masangá biye bikesenisi na likabo na bangó na botóngi mokili moko ya boboto, ya boyokani mpe ya mawa, ekelami na mitúya ya bondeko ya bato. Úto 2019, litomba epesama na balongi 19 baúta na bikoló 19.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.