Luka

2026.07.22 Episkopo ya lokumu Parolin na Palazzo Borromeo 2026.07.22 Episkopo ya lokumu Parolin na Palazzo Borromeo 

Ukraine to Iran: maloba ya boboto ya Eklezia bisengeli kobóta mbuma na yangó

Atúnami na pembeni ya bolakisi ya búku «Pasika ya boboto. Úta Yoane XXIII kinó Léon XIV epái ya Zubilé ya 2033», episkopo ya lokúmu Parolin ayébi mpe andimi 'te boboto ezangi na Ukraine, mpe abengi ya kozonga na mesa ya masoló mpo ya Iran. Secrétaire ya Letá azongeli mpósá na ye ya komona kotóngama bagbagba ya bovandi elongo na Gaza. «Mobúlú epesaka mbuma ya malámu te», elobaki ye na sima ya milúlú na Bologne sima ya liwa y'Abderrahim Fakir

Vatican News

Episkopo ya lokúmu Parolin alobi lisusu ntina ya maloba ya Eklezia mpo ya boboto biye bikobóta bambuma na yangó zambi ya kokóma na boyókani bokó ya «boboto mpe ya botóngi». Alobeli yangó 'te «na mawa tokokende na nzelá ekeseni: tokomona bomáti ya mobúlú, nzokándé elikya ya kimia ezali naínu te». Bansakola bisálemi epái ya bapanzi nsango baye batúnaki ye pembeni ya bolakisi búku «Pasika ya boboto. Úta Yoane XXIII kinó Léon XIV epái ya Zubilé ya 2033» y 'Antonio Preziosi, eye esálemaki sima ya nzanga, na 22 ya sánzá ya sambo, na Palazzo Borromeo, ndáko ya ntómá ya Italie epái ya Ngwendé ya Sántu-Petelo. Na bopesi makanisi na ye na etamboli ya súka ya etumba na Ukraine, episkopo ya lokúmu Parolin alobaki 'te,  engebene ya bansango biyébisamaki na Mgr Paul Richard Gallagher, secrétaire mpo ya Boyókani na Bikóló mpe masangá ya mokili, «mókó ya babobeti makási koleka esálemaki na butu ya mokolo ya eyenga kinó mokolo ya yambo».

Bozongi na mesa ya masoló na Iran

Na eye etáli Iran, Secrétaire ya Letá alakisaki 'te libongisi ya boyókani ebungisaki bosóló na yangó mpe alobaki bobángi na ye libosó ya etamboli ya likambo. «Nayébi te boni boni likambo liná likosila, nakanisi 'te bato moke bayébi yangó, ntángo mosusu moto te», elobaki ye, na bolobi lisusu 'te ezalaki na elikya yokó 'te boyókani etiami mabóko ekoka kotambola. Mpósá na ye, ekobaki ye, ezali ya kozonga lisusu na mesa ya masoló mpo ya kokóma na boyókani bokó etelemi ngwi «mpo ya bolámu ya ekóló mpe lokolá mpo ya bolámu ya mokili», mpo «boboto ezali na likámá».

«Te na bifeló, iyo na bagbagba»

Na likambo ya nsango etáli efeló eye limpinga ya Italie ekotónga na etuka ya Gaza, episkopo ya lokúmu alobaki lisusu ndéngé Ngwendé ya Sántu-Petelo ekomona. «Tokoki koloba na mokuse na liloba ya kobenda libiki: te na bifeló, iyo na bagbagba». Mobéko mókó eye, elimbolaki ye, ekolakisa lokolá bosambisi ya Vatican na likanisi ená.

Mosála ya Eklezia na boboto

Na súka, episkopo ya lokúmu Parolin alobaki lisusu mosála ya Eklezia na bokolisi ya lisoló mpe ya boboto: «Eklezia ekokoba kozongela maloba maye masengeli kozala na ntina», elobaki ye, na botángi lisese ya moloni mpe na bobimisi mpósá 'te maloba waná «bibóta bambuma na yangó». «Eklezia ekolemba te» bambélá waná mpe, esúkisaki ye, «na koleka bambano biye tokoki kozua, ezali sémba kokoba kobeta nsete na makambo ya motúya miye bikosálisa bovandi elongo na boboto mpe na botóngi».



Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

23 sánzá ya nsambo 2026, 13:50