Mgr Gallagher na esika ya bokundoli ya Maïdan, mpo ya lokúmu ya bato babungisaki bomoi
JR Bompolonga – Kinshasa
Ezali na bopesi lokúmu na esika ya bokundoli ebonzama na bato ya makámá ya mbongwama ya Maïdan ya 2013-2014 mpe ya etumba -ebándaka na Russie na 2014 mpe eye ekómaki lisusu makási na sánzá ya mibalé 2022 - ndé ebándaki mokolo ya yambo 20 ya sánzá ya sambo, na Kiev, mokolo ya mitáno mpe ya súka ya etindá na ye na Ukraine ya Mgr Paul Richard Gallagher, secrétaire ya Ngwendé ya Sántu-Petelo mpo ya Boyókani na Bikóló mpe masangá ya mokili.
Mgr Gallagher atindámaki na Papá Léon XIV na Ukraine mpo ya bosepeli na sanctuaire ya Carmélite ya Berdychiv, na kilometele 180 na nordi ya mboka-mokónzi, na eleko ya mibú 35 ya bofúngoli lisusu bisalelo ya Eklezia katoliko ya molúlú ya latin na ekóló. Misa mókó esálemaki na etando libosó ya sanctuaire ebonzama na Maria, Mamá ya Nzámbe, mokolo ya eyenga 19 ya sánzá ya sambo na bozali ya bato koleka 3 000.
Bokútáni na mokónzi Zelensky mpe ministre ya Makambo ya bapaya
Mokolo ya yambo, botáli na esika ya bokundoli, ezali pembeni ya esika Maïdan, esálemaki libosó ya ministre ya Makambo ya bapaya ya ntángo moke, Andrij Sibyha, na ye Mgr Gallagher asololaki o eleko ya bokútáni ya bangó mibalé. Na bosololi ená, alobaki lisusu penepene ya Ngwendé ya Sántu-Petelo epái ya bato ya Ukraine, mingi mpenza na eleko eye ya etumba, na elikya 'te boboto bokó ya sémba mpe ya sékó ezonga na lombango. Na sima, bokútáni bokó esálemaki na mokónzi Volodymyr Zelensky.
Bokútáni na Lisangá ya bato nionso ya Ukraine ya Baeklezia mpe masangá ya biyamba
Mokolo ya eyenga na pokwa esálemaki bokútáni bokó na Lisangá ya bato nionso ya Ukraine ya Baeklezia mpe masangá ya biyamba. Batindami na ye babimisaki mikakatano miye bakokútana na yangó mbala ebelé, pembeni ya baí-mboka, na bosáleli ya malámu eye eyingelaki káti ya biyamba bikeseni. Likambo ya makási, balimbolaki, etikali etumba. «Bato balembi, balembi makási», balobaki, «mpe nzokándé,’tokomeka kobika na lokúmu mpe na mpósá ya kokende lisusu libosó mokolo na mokolo. Moto mókó te alingi kimia koleka bisó, kasi esengeli kozala boboto bokó ya sémba». Sima ya kotonda Ngwendé ya Sántu-Petelo mpe ntómá ya Papá, Mgr Visvaldas Kulbokas, mpo ya mosála na bangó, penepene na bangó ya ntángo insó mpe lisálisi na bangó na bileko biye ya etumba, balobaki lisusu ntina ya kokoba kozala na lisúngi ya molimo mpe na losámbo, na bobakisi lokolá lisengeli ya kokoka kosenga na bakambi ya politiki, na nzelá ya diplomatie, bomipesi bokó kaka makási koleka mpo kosilisa etumba.
Bolongoli ya basáli ya Nzámbe na mosála ya soda
Mbano ezuami na Likita ya bolongoli basáli ya Nzámbe na mbélá mpo bendele ezali na ntina. «Bulamatari mpe bakambi ya politiki balakisaki 'te bayébi ntina ya Baeklezia, na bondimi mosála na bangó lokolá misála ya ntina mpo ya moto mpe lisúngi na bato», balobaki. Mgr Gallagher amikumisaki na bambano ya sóló bizuami, biye bikokende bongo te, mingimingi na eleko ya etumba.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye