Luka

2019.01.11 Elili ya bolakisi 2019.01.11 Elili ya bolakisi 

Bopesi ndimbola ya Ndáko ya média na likambo Rupnik

Mokambi ya Ndáko ya média ya Ngwendé ya Sántu-Petelo alobaki «na likambo ya bansango misusu bibimaki na bamédia mikolo miye mileki», na bolobi 'te bizali lokutá nionso mpe 'te «mikánda biwutaki badioceze bizali na likambo yangó, ya bajésuite, ya bato bazali na likambo yangó mpe ya média» bizali kaka na botáli.

Vatican News

«Bansango nionso bitáli mokáno mókó na ngambo ya bazúzi bazali na likambo ya sángó Marko Ivan Rupnik bizali mpenza ya lokutá», elobi mokambi ya Ndáko ya média ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, Matteo Bruni, na liyébísi lyokó mpo ya bapanzi nsango. «Na eye etáli bansango misusu bibimaki na bamédia mikolo mileki», alimboli 'te «botáli ya likambo ekokoba kaka mpe 'te etuluku ekotála sik’oyo mikánda biwutaki badioceze bizali na likambo yangó, bajésuite, bato bazali na likambo yangó mpe ya média»

Nsango mókó naínu ebimi te

Matteo Bruni asemboli 'te «na likambo ekosambisama, neti na nzelá nionso ya bosambisi, nsango mókó te etáli likambo eye ekokoba ekoki kolobama te na loléngé nionso, na botosi mpo ya nzelá ená yangó mókó», mpenza «mpo ya kopekisa kosála pási» bato «bazuami na likambo lyangó, lokolá yangó esálemi mikolo miye mileki». «Sóki etuluku emoni 'te azali na mpósá ya bansango misusu, etáli ye mókó mpo ya mikáno misengeli mpo ya kozua yangó», ebakisi mokambi ya Ndáko ya média.

Bosambisami ya etumbu na mobéko ya Eklezia

«Bosambisi ya etumbu na mobéko ya Eklezia ezali na ndéngé yókó ya bosémbo» mpe «ekolongola kaka boleki ya ntángo eye mibéko bipesi mpo na kolandela mbéba biye bikoki kozala esalemi», esembolaki ye na lokásá ya nsango mpo ya bapanzi nsango, «ekoki koloba mabé to mabé te engebene na mobéko ya Eklezia». Ezali eye ya súka ndé «ekoki kosambisa mpe kopesa bitumbu na eye etáli bomoí na káti ya Eklezia», nzokándé Marko Rupnik atikali «na nsé ya mibéko ya bikóló biye mabé ekokaki kosálema», na yangó, «bolekisi ya ntángo mibéko bilobi mpo ya mbéba waná ebongisami na mibéko ya ekóló yókó yókó, ekotála bokónzi ya Eklezia te».



Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

23 sánzá ya nsambo 2026, 13:32