Luka

Dicastère ya Doctrine ye Boyambi Dicastère ya Doctrine ye Boyambi 

Doctrine ya boyambi: bazúzi mitáno baponami po ya likambo ya Marko Rupnik

Communiqué mókó ya dicatère esakoli ‘te bási pe banganga-Nzámbe baye bazali bilama ya Office-Esántu ya kála to ya Curie ya Roma te, bakozala na lisangá eye ekosámbisa jésuite ya kála pe moi-ntóki (artiste) ayébana, afúndamaki po ya makambo ya mabé na ba mamelo ebelé.

Vatican News

Communiqué mókó ya dicastère po ya Doctrine ya Boyambi ebimaki mokolo ya yambo 13 ya sánzá ya zómi esakoli ‘te « bazúzi mitáno baponami na Esámbelo (tribunal) eye ekotála likambo ya Marko Ivan Rupnik ». Sángó ya Slovénie pe mosakoli, afúndami na mabé ya psychologie pe ya nzóto na bamibónzá ya bási ebelé ya mikóló, pe balongolaka ye na sánzá ya motóbá 2023 na Compagnie de Jésus oyo azalaki elama.

« Lisangá ya basámbisi -elobi mokándá ya dicastère po ya Doctrine ya Boyambi- esálemi na bási pe banganga-Nzámbe baye bazali bilama ya dicastère te pe bazali na mosála mókó te o káti ya ba dicastère ya Curie ya Roma ».

 « Nionso waná po ya kopésa ndanga (garantir) elamu, lokóla na likambo nionso ya esámbelo, bonsómi pe lipandá ya esámbelo yangó », elobi communiqué.

Ezali Papá François oyo, na 27 ya sánzá ya zómi 2023, apésaka na Doctrine ya Boyambi mosála ya kotála likambo, simá ya bozui mokáno ya « kotika mobéko po ya kosunga bosálemi ya esámbelo ».

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló eye. 

14 sánzá ya zómi 2025, 12:26