Luka

Kuria mpe Papa bazali na bizuzulu ya molimo, mokolo ya yambo 23 ya sanza ya mibalé Kuria mpe Papa bazali na bizuzulu ya molimo, mokolo ya yambo 23 ya sanza ya mibalé  (@Vatican Media)

Ngalasisi ya molimo, ndéngé nini kobika na lisálisi ya Nzámbe

Bomanyoli ya misáto na chapelle ya Polo mpo ya Léon XIV mpe Kuria ya Roma na mpokwa ya 23 ya sánzá ya mibalé. Nzámbe azali mosála mókó ya lombango te eye ya kobenga lokóla soki ozali kobenga na nzelá ya singa, elimbolaki moine mpe episkopo ya Norvège ya Trondheim, Mgr Erik Varden. Kotia bomoi na biso na botikali na Ye elingi koloba koleka na "molelo" mpe na "bobángi" mpo ya koyekola kobika na ngolu na loléngé ya mozindo ya sika.

Mgr Erik Varden, O.C.S.O.*

Mary Ward, motéyi mokristu monéne eye ya ekeke ya 17, azalaka koloba mingimingi na ba mamelo na ye: "Sála oyo yo okoki mpe Nzámbe akosálisa yo". Likanisi 'te Nzámbe akoki mpe alingi kosálisa bisó na mikakatano na bisó ezali mobéko mókó endimama ya boyambi ya biblia. Ekesenisi Nzámbe y'Abalama, ya Izaya mpe ya Yakobo, Nzámbe oyo amikomisi mawa na nzóto ya Yézu-Kristu, na Motéle (moteur) eninganaka te ya philosophie.

Nzembo 90 ebándi na molongó : "Moto oyo abombami o mboka ya Nta-Likoló mpe afandi penepene na Nzámbe wa bokási bonso". Lisálisi ya Nzámbe, elobi Bernard, ekoki kolimbolama lokóla ndáko yókó mpo ezali bosóló bókó eye ekosunga bisó, o ntéi na eye tokoki kobika, koningana mpe kozala. Lisálisi ya Nzámbe ezali ya libakú te; ezali mosála mókó ya lombango te eye tokobenga ntángo ndáko ezui motó to moto mókó atutami na motuka mókó, lokóla soki tokobenga na nzelá ya singa.

Kasi koloba nini na makambo bisika wápi bato babángaka Nzámbe mpe bazali lokóla batikama? Koloba nini ntángo bakoganga na likoló na kozua eyano te, na boyoki kaka bozongeli lolaka ya mawa ya mongongo ya bangó mókó?

Elongi ya biblia ya ezalela eye ya Yobo, eye buku na ye ya ntina ekoki komonana lokóla loyémbo lyokó na biténi misáto, na boleki na loyémbo lyokó ya mabé na bobimisi bókó ya bobángi, kinó na nzebi ezelami te ya ngolu.

Yobo andimi makanisi ya baningá na ye te. Aboyi kokanisa 'te Nzámbe akosála motángo (bilan) ya bomoi na ye lokóla ezalaki mbándo (compte-rendu) mókó ya mosolo. Atiyi moléndé ya kozua Nzámbe oyo azali na pási,  na bogangi na elonga: "Nani mosusu longola Ye akoki kosála yangó?".

Lokóla bandimi, tokoki komona eyamba lokóla eloko yókó ya komibatela: na elikya ya kokoka kozua lisálisi ya Nzámbe, tokanisi kobombana na likámá. Mokili ezali lokóla kokweya soki, mpe ntángo, mabé ekobeta bisó. Boni boni kobunda na mimekano biye bizali bongo bongo, biye bikobebisa bikangeli ya komibatela ya ngai? Boyokani na ngai na Nzámbe ezali loléngé lyokó ya bosololi, na ndéngé ntángo makambo bikokoma pási, namemani ya kolanda toli ya mwási ya Yobo ya "koloba mabé na Nzámbe mpe kokufa?".

Nzámbe akoki kobongisa mokili móķó ya sika mpe epambwami sima ya bokwéisi bifelo biye tokanisaki ezali mokili, bifelo na káti na yangó na bosóló tozangi mpéma.

Kotikala na lisálisi wa Nzámbe, lokóla sántu Bernard atéyi bisó, elingi koloba te kosála mombóngo na bosólósóló. Yangó elingi koloba koleka na Boleli mpe na Bobángi ya kobika na Ngolu na eténi ya sika ya mozindo. Mpe na waná kosálisa basusu ya komona ye.

*Mgr Erik Varden, episkopo ya Trondheim (Norvège).

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

26 sánzá ya míbalé 2026, 14:48