Luka

Ngalasisi ya molimo mpo ya Papa mpe bilama ya Kuria bikambemi na Mgr Varden Ngalasisi ya molimo mpo ya Papa mpe bilama ya Kuria bikambemi na Mgr Varden   (@Vatican Media)

Mokolo ya mibalé ya ngalasisi ya molimo: Sántu Bernard, molandi ya likanisi

Mokolo ya yambo eye ya 23 ya sánzá ya mibalé, Mgr Erik Varden, episkopo ya Trondheim, abonzaki bomanyoli ya mibalé ya bobéndani ya Papá mpe ya Kuria ya Roma na ebándeli eye ya karesimo na elongi ya sántu Bernard de Clairvaux. Alobaki 'te sántu Bernard, makási na nzebi na ye, ya ba mpota na ye mpe matumoli azua, akómaka, na etamboli na ye ya molimo, likanisi lyokó na bosémbo ya ye mókó mpe bosepeli na bosémbo ya mawa ya Nzámbe.

Mgr Erik Varden*

Moto ya ndéngé nini azalaka sántu Bernard? Aútaka wápi? Akonzaki lingómbá cistercien ya ekeke ya 12: waná ezalaki ngenge na ye mpe moléndé na ye na mosála.

Bato ebelé, káti na bangó basusu basengelaki koyéba ye malámu, bakanisi ye ndé akelaka lisangá. Ezali bongo te, atáko akamwisaka o eleko akómaki na 1113, na mibú 23, na etuluku ya baningá 30.

Monastère eye ye aponaki, Cîteaux, ezalaki mwángo mókó ya bobimisi koleka bobongoli. Bakeli, baye basalaka yangó na 1098, babengaka ndáko na bangó monastère ya sika (novum monasterium). Bazalaka kosála eloko yókó ya sika, na kozongisa likambo lyokó te na nionso, yangó ezali malámu, mpo ba mwángo ya bozongisi bisukaka leló to lobí na kozinda.

Na botáli yambo, mwángo cistercien ezalaki ya mobombi. Nzokándé, bato ya monastère bakotisaki makambo ya sika. Likanisi ena ezalaka malámu.

Botiyi motéma ya Bernard na likanisi ya ye mókó ekokaki kolembisa ye na botosi ya makambo ndéngé bibongisama biye alobaka kobátela loléngé esusu. Limoni na ye ya ba mpósá ya Eklezia etindaka ye ntángo mosusu ya kozua bizaleli ya makási biye bikosenga bozui nzelá yókó ya matata.

Kasi azalaki mokósi te

Azalaka moto mókó ya bomikitisi sóló, amipesa mobimba na Nzámbe, na likoki ya bolámu, moningá mókó ya lobokó  -akokaki kútu kosangisa bondeko na banguna na ye ya kála- mpe nzeneneke yókó ya moléndé ya bolingo ya Nzámbe. Azalaka, mpe akotikala, kokamwisa.

Dom James Fox, sángó mokeli misála ya Gethsemani úta 1948 kinó 1967, akomaka mokolo mókó na kanda ya moningá na ye Thomas Merton: "Molimo na ye ezali na lotiliki koleka!". Merton azalaka kotungisa Fox na makanisi na ye mpe na moléndé na ye. Nzokándé, Fox ayébaka 'te azalaki moto ya bosémbo. Azalaki kotosa ye, asepelaka kozala na ye ( ntángo bazalaka kosuana te) mpe azalaka kotubela epái ya Merton o eleko mingi ya mosála na ye ya sángó.

Ezalaki ntina te komekisa Thomas Merton na Bernard de Clairvaux, kasi ezali na bowúlani bókó na ezalela na bangó. Soki Bernard ayébaka lotiliki te, azalaka na loléngé lyokó ya mokili Mercure eye ezalaki mpe esengelaki kokokanisa ba kanda ya makási.

Litéya ya Bernard na mbongwana ebotami na momeseno ya biblia ekokana te mpe matéya ya boyékoli mambi ma Nzámbe na mozindo bikanisami mingi. Abotama lokóla, mpe mingimingi na ngonga, na etumba yókó ya ye mókó, mpo ayékola ya kondima 'te nzelá na ye ezali kaka malámu te, atéyami na nzebi, ba mpota mpe matumoli ya komona bosepeli ya ye mókó mpe ya kosepela libosó ya bosémbo ya mawa ya Nzámbe.

*Mgr Erik Varden, episkopo ya Trondheim (Norvège).

 

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.  

24 sánzá ya míbalé 2026, 11:44