Ministre wa Yambo y'Albanie ayambami na likita na Vatican
Vatican News
Papá ayambaki mokolo ya minei na likita ya ye moko Ministre wa Yambo y'Albanie Edi Rama, libosó 'te asolola na episkopo ya lokúmu Pietro Parolin, Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, mpe Paul Richard Gallagher, Secrétaire ya mokangano (relation) na Bikóló mpe masangá ya mokili. "Mokangano malámu káti ya Ngwendé ya Sántu-Petelo mpe ekóló y'Albanie elobamaki mpe makambo-makonzi po ya bansó na botáli mokangano o káti ya lisangá ya eklezia mpe lisangá ya bato bilobamaki", esemboli communiqué yoko ya ndáko ya média ya Ngwendé ya Sántu-Petelo ebimaki na súka ya ba bokútáni.
O eleko ya masoló, "bilobamaki lokóla makambo ya ntina ya engumba, eye ekoleka na bikóló ya Balkan mpe etamboli y'Albanie na bokoti na ye mobimba na Lisangá ya Poto", elobi lisusu communiqué.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.