Luka

 Mgr Mirosław Adamczyk ntoma n'Albanie Mgr Mirosław Adamczyk ntoma n'Albanie 

Ntómá ya sika ya Papá alubolami n’Albanie

Léon XIV alubolaki Mgr Mirosław Adamczyk lokóla motindami ya sika ya Papá na Tirana, mokolo ya misáto 14 ya sánzá ya yambo. Moí-Pologne, motindami eye ya Sántu-Petelo ya mibú 63 azalaki kinó sik’oyo ntómá n'Argentine, epái wápi atindamaka na Papá François na sánzá ya ibále 2020.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Abotami na Gdańsk, na Pologne, na 16 ya sánzá ya sambo 1962, Mirosław Adamczyk azui lipolóme na lycée ya Gdynia pembeni ya Baltique pe akoti na likindo ya Gdańsk na 1981, mobú ya bosakoli mobéko ya etumba na Pologne. Ayekoli lisusu n'Academie ya Papá po ya Eklezia na Roma pe azui elonga enéne na droit canon.

Akulaki bonganga Nzámbe na 16 ya sánzá ya mitáno 1987, azalaki na dioceze ya Gdańsk. Na mosála ya boyokani ya Ngwendé ya Sántu-Petelo úto mokolo ya yambo ya sánzá ya sambo 1993, atindamaka na ba ndáko ya ba ntómá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, úta Madagascar kinó Beleziki, na boleki na Hongrie pe Venezuela.

Libosó ntómá n'Afrika ya Westi pe na Panama

Na 22 ya sánzá ya mibalé 2013, mwá mikolo yambo ya kotika, Benoît XVI aluboli ye ntómá na Liberia, na kombo ya episkopo mokonzi ya  Otriculum. Na 8 ya sánzá ya mwambi 2017, atindamaki na ndáko ya ntómá na Panama esika wápi alandaki malámu bobongisi pe bosalemi ya JMJ ya sánzá ya yambo 2019 na ekóló.

Na 22 ya sánzá ya ibále 2020, Papá François aluboli ye na ekóló na ye, Mgr Adamczyk akomi ntómá n'Argentine. Mbala moko bolongwi Albanie ya Mgr Adamczyk ebongisami, Mgr Daniele Liessi, oyo azali sik’oyo molaki na ndáko ya ntómá, akotikala mokambi ya ndáko ya ntómá n'Argentine, kinó bokomi ya ntómá ya sika akolubolama na Léon XIV.

Albanie, boyambo ya diplomatie ya Ngwendé ya Sántu-Petelo

N'Albanie, Mgr Adamczyk akitani na Mgr Luigi Bonazzi, na mosála úta 2020, oyo apesaka na sánzá ya yambo 2025 na Papá François bomilongoli na ye po ya mibú. Na matambe ya ba Papá Yoane-Polo Il, na 1993, pe François, na 2014, pe lokóla episkopo ya lokúmu Secrétaire ya Leta Pietro Parolin na 2019, Mgr Richard Gallagher akendaka n'Albanie na sánzá ya misáto 2023. Albanie, lokóla bikóló binso ya Balkans, bizali ba boyambo ya diplomatie ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, elakaka molandi ya episkopo ya lokúmu Parolin na mokambi ya diplomatie y'Albanie.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

16 sánzá ya yambo 2026, 14:51