Luka

Nsambo ya pokwa kati ya biyamba na Copenhague Nsambo ya pokwa kati ya biyamba na Copenhague 

Episkopo ya lokúmu Parolin na Danemark, kozala mpiyo te na pási ya bato

Ezali na nsámbo ya pokwa káti ya biyamba na cathédrale ya Luther ya Copenhague, mokolo ya póso 24 ya sánzá ya yambo, ndé Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo afungolaki botáli ya ye ya mikolo mibalé na Danemark. Episkopo ya lokúmu Parolin azali motindami ya Papá po ya bokundoli etindá ya sántu-Anschaire na ekeke ya 9, mopanzi nsango elamu na ekóló. Na Copenhague, o eleko ya nsámbo, episkopo ya lokúmu alobaki 'te bomoko na Eklezia ezali likabo lyoko mpe 'te ngrásya ezali litomba lyoko te

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Koluka eye esangisi bisó. Ezali ndéngé Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, episkopo ya lokúmu Pietro Parolin, na botáli na Danemark na nkombo ya motindami ya Papá po ya bosepeli mibú nkámá ya mbala ya 12 ya ebándeli ya etindá ya sántu-Anschaire, alendisi bakristu ya kotia yangó na misála. Likambo-likonzi ena ekolisamaki na litéya ya nsámbo ya pokwa ya biyamba biye akambaki mokolo ya póso 24 na sánzá ya yambo na cathédrale Luther ya Copenhague. Bokútáni ena ya losámbo efungoli mikolo mibalé ya episkopo ya lokúmu na ekóló ena ya nordi na elembo ya sántu-Anschaire, moine bénédictin mpe episkopo akoma mokónzi ya Scandinavie, oyo abonzaki bomoi na ye na bopalinginyi nsango elamu na Danemark mpe na Suède na ekeke ya libwa.

Likanisi liye ya lisangá ya Eklezia katoliko mpe Eklezia ya Luther ebimi lokóla libakú ya sika ya "kolendisa boyokani mpe bondeko káti na ba Eklezia na bisó na etindá mpe litatoli ya bokristu".

Mpiyo te libosó ya pási

Na litéya na ye, episkopo ya lokúmu Parolin alobaki lisengeli ya komitiya na "loléngé lyoko ya mosála ya sóló mpe ya mokumba ekabolami" soki tolingi na mobimba bomoko. "Litatoli ya bokristu ekoki te kotikala bongo bongo to esuki kaka na maloba", esémbolaki ye, na bobakisi: "Libosó ya pási ya bato mpe ya baí-mboka, tokoki kobwaka liso te, mpe bozali mpiyo ekoki kozala mokáno te. Lobokó na Nsango-Ndamu ekobianga bisó na litatoli lyoko ya polélé na bosóló, bozali na mawa na bolingo mpe moléndé na ekela, zambi mwinda ya Kristu ekoka kokomela baye bakobika na molili, bobángi mpe na bobwakami".

Bomoko ezali likabo lyoko

Na botángi Mokánda ya sántu Polo na ba Éphésien, esika wápi ezuami likambo-likonzi ya Póso ya losámbo po ya bomoko ya bakristu, Secrétaire ya Letá alobaki lisusu boni boni bomoko na Eklezia ezali loléngé lyoko te, kasi esengeli ezuama lokóla "lisangá lyoko ya bomoi na bokeseni". Atalisaki 'te "bomoko ebotami na eye tokobimisa te, kasi ezali likabo lyoko ya Molimo". Yangó waná, "ba katoliko mpe ba luthérien bakoki komindima lokóla bilama ya Nzoto kaka ya Kristu, atáko bakeseni na lisapo mpe na milulu mpe nsámbo ya misa".

Ngrásya ezali litomba lyoko te, kasi mbela moko ya kosálela

Episkopo ya lokúmu aúmelaki na eye etáli ngrásya lokóla "likabo ya moto ye moko eye ekoleka libosó ya litomba inso ya moto". Mpe esika wápi apostolu Polo alobi likambo ya "emekeli" ya ngrásya, episkopo ya lokúmu alimbolaki 'te "emekeli ena elingi koloba bozangi ya bokokani te, kasi bokeseni ya makabo po ya botóngi ya lisangá". Na bolobi lisusu 'te Molimo Esántu elongolaka ba bokeseni te, kasi ekokotisa bangó na boyokani, abiangi ya kotála lobi na mpiko mpe asukisi na bolobi Léon XIV oyo abeti nsete na bokútáni na Yézu lokóla liziba ya bomoko. "Ngrásya ezali litomba lyoko te, kasi mbela moko ya kosálela", elosaki ye.

Bokobi ya botáli

Mokolo ya eyenga 25 ya sánzá ya yambo, Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo asengeli kotála monastère ya Sankt Josefs Karmel na Hillered, kokutana na ba mamelo bénédictine ya Vor Frue Kloster na Birkerod mpe kokamba misa na cathédrale Sántu-Anschaire ya Copenhague o eleko ya mibú nkámá ya mbala ya 12 ya bopalinginyi nsango elamu na ekóló.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

26 sánzá ya yambo 2026, 10:20