Episkopo ya lokúmu Parolin atindami na Papá na Danemark
Vatican News
Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, episkopo ya lokúmu Parolin, akomaki mokolo ya póso 24 ya sánzá ya yambo, na Danemark, lokóla motindami ya Papá po ya bokundoli mibú nkámá po ya mbala ya 12 ya ebándeli ya etinda ya sántu Anschaire na ekóló ena ya nordi ya Poto. Mobémbo ekokoba kinó mokolo ya libosó 26 ya sánzá ya yambo.
Nsámbo ya pokwa mpe bokútáni káti ya biyamba
Linaka ya mokolo ya libosó ebongisi bozali na nsámbo káti na biyamba na cathédrale ya Luther ya Copenhague (Vor Frue Domkirke). Episkopo ya lokúmu Parolin akokutana lisusu na ba diplomate pe bakambi ya Biyamba bisusu. Mokolo ya eyenga, akokende kotála monastère ya Sankt Josefs Karmel na Hillered, akokutana na ba mamelo bénédictine ya Vor Frue Kloster ya Birkerod mpe akokamba misa na cathédrale Sántu-Anschaire ya Copenhague o eleko ya mibú nkámá ya mbala ya 12 ya bopanzi nsango elamu na ekóló.
Ba bokútáni na ba diplomate
Mokolo ya libosó 26 ya sánzá ya yambo, Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo azelami na ndáko y'Amalienborg esika wápi akoyambama na mokónzi Frederik X ya Danemark. Akokutana na sima na ministre atalaka Makambo ya bapaya, Lars Løkke Rasmussen, na Eigtveds Pakhus. Na súka, akotála likindo Redemptoris Mater na Vedbak. Mobémbo ya episkopo ya lokúmu Parolin na Danemark ekosálema o eleko ekóló ezali o ntéi ya bobéndani ekangami na motindo (statut) ya Groenland, elingami n'Amerika mpe ezali ya bokónzi ya Danemark.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.