Libángá ya yambo ya ndáko ya ntómá ya Papá na Malawi etiamaki
Vatican News
Kinó leló, ndáko ya ntómá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo po ya Malawi ezalaka na Lusaka, na Zambie. Botóngi ya ndáko ena o ntei ya ekóló ekolakisa eténi mókó ya motúya, na boluki ya kolendisa boyokani káti na Ngwendé ya Sántu-Petelo pe Malawi. “Ndáko ya Papá” ekozala kaka esika mókó ya mosála ya diplomatie te, kasi lokóla elembo mókó ya sóló ya lisangá pe ya pembeni, esika mókó ya bokútáni pe ya lisoló na mosála ya kimia pe ya botómboli.
Batidami ebelé ya eklezia pe ya letá na molúlú
Batindami ebelé ya eklezia pe bakambi ya ekóló bazalaki na molúlú. Po ya Eklezia katoliko, bazalaki waná Mgr Martin Anwel Mtumbuka, episkopo ya Karonga pe mokambi ya Lisangá ya baepiskopo katoliko ya Malawi, Mgr George Desmond Tambala, episkopo ya Lilongwe, pe Mgr Peter Chitsulo, episkopo ya Dedza. Epai ya bakambi ya ekóló, mwá batindami ya ministère ya Makambo ya bapaya, basáli ya commune ya Lilongwe, Commissio ya likoló ya Tanzanie….
Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo