Molulu ya kotia libanga ya ndako ya ntoma ya Papa na Malawi Molulu ya kotia libanga ya ndako ya ntoma ya Papa na Malawi  

Libángá ya yambo ya ndáko ya ntómá ya Papá na Malawi etiamaki

Libángá ya yambo ya eye ekokóma ndáko ya ntómá ya Papá na Malawi etiamaki na Lilongwe, mokolo ya libosó 22 ya sánzá ya libwá. Molúlú ekambemaki na Mgr Gian Lucia Perici, ntómá ya Papá na Zambie pe na Malawi, oyo abenisaki libángá ya yambo ya ndáko ya sika ya ntómá ya Papá.

Vatican News

Kinó leló, ndáko ya ntómá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo po ya Malawi ezalaka na Lusaka, na Zambie. Botóngi ya ndáko ena o ntei ya ekóló ekolakisa eténi mókó ya motúya, na boluki ya kolendisa boyokani káti na Ngwendé ya Sántu-Petelo pe Malawi. “Ndáko ya Papá” ekozala kaka esika mókó ya mosála ya diplomatie te, kasi lokóla elembo mókó ya sóló ya lisangá pe ya pembeni, esika mókó ya bokútáni pe ya lisoló na mosála ya kimia pe ya botómboli.

Batidami ebelé ya eklezia pe ya letá na molúlú

Batindami ebelé ya eklezia pe bakambi ya ekóló bazalaki na molúlú. Po ya Eklezia katoliko, bazalaki waná Mgr Martin Anwel Mtumbuka, episkopo ya Karonga pe mokambi ya Lisangá ya baepiskopo katoliko ya Malawi, Mgr George Desmond Tambala, episkopo ya Lilongwe, pe Mgr Peter Chitsulo, episkopo ya Dedza. Epai ya bakambi ya ekóló, mwá batindami ya ministère ya Makambo ya bapaya, basáli ya commune ya Lilongwe, Commissio ya likoló ya Tanzanie….

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo

24 sánzá ya libwa 2025, 08:29