Luka

Collapsed buildings in Manizales after earthquake strikes Colombia Collapsed buildings in Manizales after earthquake strikes Colombia 

Pápa abondeli mpo na bato bàkufaki na koningana ya mabelé na Colombie

Léon XIV amonisi mawa na ye mpo na bato banso bàzwi likàmà na boningani ya mabele oyo ebetaki mboka wana ya Amerika ya Sudi na mokolo ya yambo. Kati na telegrami oyo etiyaki mokoloto Pietro Parolin, episkopo wa lokùmu mpe sekretaire ya Vatican, Pápa asambeli mpo na bopemi ya kimya ya baye bakufi. Apesi matondi mingi mpo na bato banso oyo bapesaki lisungi. Abeleli likabo lya “elikya ya bokristu” mpo ya mpo bato ya Colombie.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Na telegrami oyo Pietro Parolin, episkopo wa lokùmu mpe sekretaire ya Vatican,atiyaki mokoloto mwa yé, Léon XIV alobi ‘te “ayoki mawa mingi” mpo na nsango ya boningani bwa mabele ya magnitude 7,4 oyo ebetaki na mokolo mwa yambo, 10 Agusto, na ekolo ya Colombie. Bato koleka 130 bakufaki, bato koleka 500 bazokaki. Bongo boningani ya mabele bonà, ebebisaki bingumba mpe bandako-nzambe mingi. Nganga- Mokonzi Monene alaki mpe bansambo na ye mpo na bato baye bakufi, mpe mpo na bato oyo bazwami na likàmà yango.Atombeli bango kobika ya lombango mpenza.

Koningana ya mabele na Colombie, baepiskopo basengi  lisalisi mpo na kobimisa bato na mintikà
Koningana ya mabele na Colombie, baepiskopo basengi lisalisi mpo na kobimisa bato na mintikà   (AFP or licensors)

Matondi epai ya basungi

Papa atindi «bakondoleansi bwa yé» to mpe «mawa ya motema mwa ye» na mabóta manso maye bazali kolela, «kobungisama ya bandeko ba bango», mpe alakisi  «bozali na ye pembeni na molimo». Apesi mpe «matondi» na ye na bato banso oyo, na «motema mobimba», bazali kosangana na misala ya koluka, kosunga mpe kobatela bato oyo bazwi likàmà. Tata Mosantu atindaki nsango eye na nzela ya Mgr Francisco Javier Múnera Correa, episkopo-mokonzi ya Carthagène mpe mokambi ya lisanga lya baepiskopo ya Colombie.

 

Matondo mingi na ndenge otangi lisolo liye

11 sánzá ya mwambe 2026, 11:43