Pápa abondeli mpo na bato bàkufaki na koningana ya mabelé na Colombie
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Na telegrami oyo Pietro Parolin, episkopo wa lokùmu mpe sekretaire ya Vatican,atiyaki mokoloto mwa yé, Léon XIV alobi ‘te “ayoki mawa mingi” mpo na nsango ya boningani bwa mabele ya magnitude 7,4 oyo ebetaki na mokolo mwa yambo, 10 Agusto, na ekolo ya Colombie. Bato koleka 130 bakufaki, bato koleka 500 bazokaki. Bongo boningani ya mabele bonà, ebebisaki bingumba mpe bandako-nzambe mingi. Nganga- Mokonzi Monene alaki mpe bansambo na ye mpo na bato baye bakufi, mpe mpo na bato oyo bazwami na likàmà yango.Atombeli bango kobika ya lombango mpenza.
Matondi epai ya basungi
Papa atindi «bakondoleansi bwa yé» to mpe «mawa ya motema mwa ye» na mabóta manso maye bazali kolela, «kobungisama ya bandeko ba bango», mpe alakisi «bozali na ye pembeni na molimo». Apesi mpe «matondi» na ye na bato banso oyo, na «motema mobimba», bazali kosangana na misala ya koluka, kosunga mpe kobatela bato oyo bazwi likàmà. Tata Mosantu atindaki nsango eye na nzela ya Mgr Francisco Javier Múnera Correa, episkopo-mokonzi ya Carthagène mpe mokambi ya lisanga lya baepiskopo ya Colombie.
Matondo mingi na ndenge otangi lisolo liye
