Nteke-Nzambe : Milulu ya kotambola na molongo ezali litatoli mpenza ya boyambi
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Kotambola sima ya Sakramento-Esantu, mp ona kokundola ‘te Nzambe azali o kati ya biso mpe afandi pembeni ya biso. Ndé eloko Pàpa ayebisaki lisusu na bato, tango apesaki bango mbote na bankótà ndenge na ndenge, na tango ya likita lya banso. Alobaki yango, mpo na na eyenga monene ya Nteke-Nzambe (Corpus Domini), o mokolo mwa 4 ya Yuni. Leon XIV alimbolaki na bato bazalaki na place Saint-Pierre, ntina ya milulu ya procession ekosalema mokolo monà.
“Na Ukaristya, tokomona Yezu, lipa lya bomoi oyo babukaki mpe bapesaki mp ona moko na moko o kati ya biso. Emonisi lolenge ya kotosa Ukaristya epai ya bato. Milulu mya kotambola elongo sima ya Sakramentu Esantu, oyo ezali kosalema na ba balabala ya bingumba mingi na mokili mobimba, ezali elembo oyo, nalendisi ‘te ebatelama lokola litatoli ya kitoko ya boyambi”, elobaki Leon XIV.
Nzambe azali elongo nà biso
Ezali likanisi sé yoko, oyo azongelaki koloba, tango apesaki bato ya Pologne mbote. Akundolaki na bango ‘te, Yeza azali na bomoi mpe azali kotamboa elongó nà biso. “Tika ‘te kosangana na milulu mya Ukaristya - mingi mpenza ya mabota, bana mpe bilenge - ezala litatoli ya mpiko ya boyambi mpe ekundwela bato banso ‘te Nzambe azali kati na bato na ye mpe azali elongo nà bango na bomoi ya mokolo na mokolo”.
Nzeneneke ya bolingi bwa yé.
Tango apesaki liyebisi n abato ba mobembo ya lokota ya lingelesi, abetaki nsete na makasi oyo Ukaristya ekopesaka. “Lokola tozali komilengele na eyenga enene ya Nzoto mpe Makila Masantu ya Kristu, tika ‘te tozwa makasi na likabo liye la Nzambe, mpe tokóma banzeneneke to batatoli ya bolingi bwa Ye, mpo na bato banso baye tokokutana na bango”, elobaki Pàpa.
Na bayambi oyo balobaka lokotà ya Portugais, Leon akundeli bango ‘te sànzà ya motoba ezali sànzà ya Motema Mosantu mwa Yezu. Bongo abyangi moko na moko nakopusana na Yé, mpo abongola motema mwa yé: “Bandeko balingami, na sànzà oyo ya kokumisa Motema Mosantu mwa Yesu, tóbéléma penepene na liziba ya mawa mpe ya Motema Ngolu to mawa ma Nzambe, mpo ‘te Ye oyo asekwaki na bawà, abongola mitema mya biso, akómisa yango na mpiko koleka, na bolingo, mpe na Ngolu”.
Alendisi Banganga-Nzambe na Moyen-Orient
O kati ya bambote apesaki bato, makanisaki ma yé ekendaki na banganga-nzambe ya Moyen-Orient., Alakaki bango losambo mpe bobenisi to mapamboli na ye mpo na mosàlà na bango mpe mpo na “makambo maye mazali kozela bango na mikili mya bango”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye
