Luka

2026.06.03 Likita lya banso 2026.06.03 Likita lya banso  (@Vatican Media)

Likita lya bansó: Léon XIV abengi komona lisusu bokási ya molimo ya milúlú ya misa

O eleko ya likita lya bansó ya mokolo eye ya misáto 3 ya sánzá ya motóbá, Papá akobaki molongó ya litéya na ye na Likambo-likonzi ya Concile Sacrosanctum Concilium. Léon XIV asálaki likanisi na ye na mwá makambo ya lisangá esántu ya milúlú mpe nsámbo o misa: «molúlú, elembo mpe elembetele», na bolobi lisusu 'te milúlú misántu mizali kaka bilembo ya pámba ya libandá te, kasi bontéi bokó ya sóló ya káti ya mobombano ya nzebi ya Nzámbe na bomoí ya bandimi.

JR Bompolonga - Kinshasa

Na bokobi molongó ya litéya na ye na mikánda ya ntina ya Likambo-likonzi ya Concile Sacrosanctum Concilium, Papá amanyolaki na lisoló ya bayékoli ya Emmaüs na Nsango-Ndamu ya sántu Luka. Alimbolaki 'te lisangá ya milúlú mpe nsámbo o mísa ekosálisa bandimi ya kondima bozali ya Kristu na nzelá ya bikela ya sóló mpe bisántu lokolá bayékoli ya Emmaüs baye bayébaki ye lisusu na bobuki lipa. Léon XIV alobaki lisusu 'te Concile Vatican II, na bozui likanisi ya mosála ya Botámboli ya lisangá  ya milúlú mpe nsámbo o mísa, ya kosálisa «komona lisusu bosóló bokó ya makási koleka na boyébi ya Eklezia ya ebándeli mpe na botángisi ya Batatá».

Bongo, «milúlú ya lisangá ya milúlú mpe nsámbo o mísa bizali kaka bolatisi lisusu ya libandá ya mobombano ya sakraménto te, lisangá lyokó ya milúlú ya lokutá te, kasi bizali bontéi ya Eklezia na nzelá eye likabo ya bonzámbe ekomelaka bisó». Ezali na loléngé ená mpe mpo ya likambo ená ndé Concile ebengi bandimi ya «koyéba Mysterium fidei eye ekosálema na lisangá ya milúlú mpe nsámbo o mísa na nzelá ya milúlú mpe nsámbo» (cf. SC, 48)[1], ekobaki Mokitani ya Petelo.

«Komeka bozali ya Nzámbe na Yézu-Kristu»

Papá wa Roma abetaki lisusu nsete na bozali ya sóló, káti mpe libandá, ya bandimi na mísa. Yangó ekopésa likoki ya kosála nzebi ya Nzámbe.

“"Molúlú ekopésa loléngé ya ekela ya lisangá ya milúlú mpe nsámbo o mísa mpe, na nzelá na yangó, na bomoí na bisó, na boboti na bisó liyoki lyokó ya molimo eye ekopésa bisó makási ya komeka bozali ya Nzámbe na Yézu-Kristu."”

Nzokándé, bobongoli ená ya molimo ekoki kosálema te sóki bandimi batikali «batáli bapaya to babába». Kútu, tobengami kozala na lisangá ya milúlú mpe nsámbo o mísa na «bomoto na bisó nionso -nzóto, molimo mpe motéma-, na botosi boyangéli ya Mokónzi». Na nzelá ya molúlú esántu, «tokelami bongo na boyóki Liloba lya Nzámbe, na ekela ya ngrásya mpe ya bokumisi, na bokaboli bondeko mpe na lisangá ya Eklezia, elimbolaki Papá. Tokomona lisusu 'te tozali lingómbá lyokó ya bilongi ebelé, esangani kaka na boyambi»

Na lisangá ya milúlú mpe nsámbo o mísa, tokozua bopemi eye ekobota lisusu

Léon XIV alobaki lokolá motúya ya molimo ya molúlú mpe bikela ya nsámbo na lingómbá lyokó ezui elembo ya mobúlú mpe bolukiluki elonga koleka. Molúlú «bizindisi bisó na eténi yókó elimbolami na bikela mpe nsámbo, eye ekoki ntángo mosusu kobébisa mpósá ya mókó mókó na bisó na bolingi», elakisaki ye. Nzokándé, likanisi na ye «ezali ya kokanga bonsómi na bamwangó te». Kútu, «na bosáwa ya lokúmu ya bitámboli na ye, molúlú ekáti misála bikomema bisó na eye ya ntina». Na lisangá ya milúlú mpe nsámbo o mísa, bandimi bakomona «lomeko lyokó esusu ya kosála, eye ekambemi na mitángo ya bosáli te, ekobaki Episkopo ya Roma, (...) likanisi lyokó ya ofele, (...) bopemi bokó eye ekozongisa motéma sika.» Ezali bongo, engebene na Papá, ndé «tokoyékola kobika na etamboli yokó evandi na Elimo-Sántu».

Bilembo «bikosimba motéma mpe molimo»

Papá alobaki lisusu ndimbola ya bilembo ya lisangá ya milúlú mpe nsámbo o mísa biye bikotónga mibéko ya molúlú. Lisangá ya milúlú mpe nsámbo o mísa, elobaki ye lisusu na botángi Sacrosanctum Concilium, ezali esika wapi «bosántisi ya moto elimbolami na bilembo ya liyóki mpe esálemi na ndéngé mókó ya móķó mókó na bangó». Bilembo ya lisangá ya milúlú mpe nsámbo o mísa, engebene na Katekisimo ya Eklezia Katoliko, «bikosembolama na makambo ya Boyókani ya Kála mpe bikobimisama mobimba na moto mpe mosála ya Kristu».

Na bolobi elembo ya mayi, Léon XIV alakisaki boni boni eye eleki lisapo nionso ya libiki:

“«Úta ebandeli ya bokeli kinó mpela (déluge), úta bokatisi ya ebale Motáné kinó na Jourdain, kinó na mayi ebimaki na mopanzi ya Kristu mpe ekómi elembo ya sakraménto ya bomizindisi na liwa na ye mpe na nsékwa"”

Tatá-Esántu asembolaki 'te elembo ekozongisa kaka na likanisi lyokó ya pámba te, kasi «na esalelo nionso ya bandimbola mpe ya mitúya». Bilembo ya lisangá ya milúlú mpe nsámbo o mísa bizali bongo «lomeko lyokó ya yangó móķó, ya elonga koleka mpe ya bobongoli, (...) na bosimbi motéma mpe molimo, na bobimisi baboyókani ya sóló ya Eklezia».

Moto asengeli kozua lisusu likoki ya elembo na ye

Na eténi ya súka ya litéya na ye, Léon XIV azongelaki likanisi lyokó ya Papá François na mokánda na ye ya bontómá Desiderio desideravi, eúta na likanisi ya théologien Romano Guardini: «eloko ya yambo ya mosála ya botéi ya lisangá ya milúlú mpe nsámbo o mísa ekosenga na makási na moto ya kozua lisusu likoki ya elembo na ye». Mpo na yangó, abéngaki Eklezia ya komitika «koyékola na milúlú ya lisang´ya milúlú mpe nsámbo o mísa, na bosálisi na bokébi mpe na lokutá te bonzenga ya bamisa mpe na bomipesi na bolandi ya sóló milúlú ya misa». «lisangá ya milúlú mpe nsámbo o mísa ya bomoí mpe ya mosántu, elongo na litéya ya bolandi elongobami, ezali nkita ya malámu koleka mpo ya kolamuisa na mókó mókó bofungwami ená na bokútáni na Nzámbe». Mpo, esúkisaki Papá, na likanisi ya bolati nzóto, bokútáni ená ekokotisa «moto mobimba: elimo, molimo mpe nzóto» na botángi mokánda ya yambo na bathesaloniki.

1. Likambo-likonzi ya lisangá ya milulu mpe nsambo o misa, Sacrosanctum Concilium.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

03 sánzá ya motóbá 2026, 15:11