Madrid ezali komilengele mpo ya koyamba Pàpa Leon XIV

Engumba-mokonzi ya Espagne ekómi kitoko na langi ya mosaka mpe ya mpembe mpo na koyamba Nganga-Mokonzi Monene, kobanda mwa motobà kino mwa libwà ya sànzà ya Yuni (du 6 au 9 juin). Bato koleka bankoto nkàmà mitano (500 000) ya bayambi mpo na kosangana na milulu mya losambo na mpokwa ya poso liboso ya misa ya mokolo mwa lomingo na mpo na eyenga enene ya Saint-Sacrement. Bibongiseli bya lisungi mpe bayambi bazali komilengele nà motema likoló likoló mpo na kokutana na Tata Mosantu.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Na engumba-mokonzi ya Espagne, ba piblisite na langi ya Vatikan ezali komonana na ba balabala mpe na bisika bya bato banso. Bilamba ya langi ya mosaka mpe ya mpembe ezali mpe na kati ya ba lobàlà ya engumba, epai wapi batandi ba pétunias nkoto tukù libwà na libwà (99 000) mpo na libakù lyango. Liyemi monene ya fololo oyo ezali na nkombo ya Nganga-Mokonzi Monene etyamaki mosika te na ndako ya mokonzi, esika ya kala ya bakonzi ya Espagne, esika oyo molulu ya koyamba Léon XIV ekosalema mokolo mwa poso mwa 6 Yuni.

Na lopango, na miso ya baturiste, o mokolo mwa mitano, basokoto bazali kosala formasyo bazali kobongisa lisusu lolenge ya kobina mpo na kolakisa bosoda bwa bango. Pene na esika yango, bato oyo basalaka mibembo bazali kofanda na nse ya nzete mpo na kobongisa ndulu (programe) ya mikolo misato oyo ekolanda, mpo bázanga te makambo ma ntina mingi oyo bakokutana na yango na Madrid. Misa ya mokolo mwa lomingo na ntongo na eyenga ya Sacramentu Esantu (Saint-Sacrement), ekosalema na Esika eyebani mingi ya Cibeles, mpe na veillée ya losambo, elongo na bilenge na mpokwa ya mokolo mwa poso pene na Stade Bernabéu.



Elembo ya esengo mpe motema likoló likoló ezali koyokana na engumba. Bankàmà ya bilenge bakutani o mokolo ya mitano na mpokwa pene na stade mpo na komilengela na bokengi (veillée) elongo nà Papa. Mingi kati ya bango, bazali bilenge ya “eleko ya Z”, mpe ba monà nayino Pàpa te. Mobembo mwa nsunka ya moko ya mokitani ya Petro, ezalaki oyo ya Pàpa Benoit XVI, na tango ya mokolo mwa mokili mobimba ya bilenge na Madrid na 2011.

Mikolo zomi na mitano sima, baye bazali kobongisa mobembo moye, bazali kolikya ‘te, mobembo ya Pàpa ekobenda litombà monene mpe bato mingi bakokóma kosepela lisusu na eklezya ya Katoliko. “Mbala na mbala oyo Pápa moko ayaka na Espagne, tomonaka ‘te boyambi bwa bato ya Espagne ekómaka lisusu makasi. Emonisami mpe na mituya; na ndakisa, mitango y abato bazalikokota na ba likindo (seminele) ezali komata”, elimboli Yago de la Cierva, mokambi ya mobembo. Alobi ‘te, “lokola esalemakà na mobù 2011, mpe bàzali na elikya ‘te ekosalema mpe na mbula moye”.

Esika babengi Place de Cybèle na Madrid, epai wapi Léon XIV akosàla misa mokolo mwa lomingo.
Esika babengi Place de Cybèle na Madrid, epai wapi Léon XIV akosàla misa mokolo mwa lomingo.

Longola bilenge, na mokolo ya liboso ya mobembo mwa ye, Pàpa Léon XIV akotala bato bazangi esika ya kofanda na engumba-mokonzi, na mokolo mwa poso na nsima ya nzanga na Cedia 24 Horas. Ezali ndako oyo ezwa mokumba ya koyamba baye bazali na bisika ya kovanda te esika moko mpe na bato ya mpasi. Bakambi na bango, balobi ‘te, mbula na mbula bato bazali sé kobakisama, nzokande bazali bato ya bambula ya kati kati (moyenne d’age).

Santiago Tedeschi, mokambi ya lisangá ya Archidioseze ya Madrid mpe mosangani ya Cedia 24 Horas, alobi ‘te; «ezali na ntina mingi mpo na biso, mpamba te, Léon XIV akokota na Madrid na nzela ya ezibelo ya bondeko (charité) mpe ya koyoka ba oyo bazali na boséngà mingi na kati ya societe». Boyei bwa Léon XIV epesi nzela na kobenda likebi na makambo ndenge na ndenge ya bomoi ya bato oyo bafandi esika moko na engumba-mokonzi.

Engumba Madrid na bolengeli bwa boyei bwa Papa Leon XIV

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

05 sánzá ya motóbá 2026, 10:41