Luka

Ba balabala ya Madrid elengelami mpo na koyamba Léon XIV Ba balabala ya Madrid elengelami mpo na koyamba Léon XIV  (AFP or licensors)

Léon XIV na Espagne: Elikya mpo na eklezya oyo ezali kosala mosala na yango

Kobanda mokolo mwa motoba (6) kino moye mwa zomi na mibale (12) ya sànzà ya Yuni, Leon XIV akosàla mobembo ya bakilometele nkoto mibale na nkàmà mitano (2 500km) mpo na kokende na Madrid, Barcelone, Las Palmas de Gran Canaria, mpe na Santa Cruz de Tenerife. Pàpa akei kokutana elongo nà eklezya etungisami na matata. Eklezya elingi lisusu kotya motema na libula na yango te, kasi nde kosàla mpo na mbongwana ya solo-solo ya misio to etindà.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Epagne ezali ekolo eye ba Pàpa batyaka mpenza mwa bokebi koleka mpo na yango. Jean-Paul II akendaki mobembo kuna mbala mitano; mokitani na yéBenoit XVI akendaki mbala misato; bongo François, alakisaki mbala mingi mposa ya kokende kuna. Mobembo Pàpa ya nsuka asalaki na mboka Espagne, ezalaki na 2011, na tango basepelaki mokolo ya bilenge ya mokili mobimba na Madrid. Bato pene na 2 milio bakendeki na balabala ya engumba-mokonzi ya Espagne. Mbula zomi na mitano na nsima, Léon XIV akani kokumisa eleko wana ya ntina mingi na bomoi ya eklezya ya Madrid, na koyanganisa lisusu bankóto ya bilenge na Plaza de Lima, na kati ya engumba ya Castiglia, mpo na butù ya losambo o mokolo mwa motoba ya sànzà ya Yuni (6 juin) na mpokwa. Bokutani n abato ya Espagne ezali mobembo ya mbala ya mibale ya Leon XIV na mikili mya Eropa. Alendisi boyambi bwa bakatoliki ba Eropa, bisika wapi bazwami, mpo na kondima na bango na kati ya bikólo biye bato bayiké bazali bapakanu (bazali te komipesa na makambo ya losambo).

Na ndakisa, emonisami na maloba mantina maùti na Nsango Elamu ya Yoane; “Bótombola miso ma bino” (Alzad la mirada); eponamaki mpo na kozala elongo na mobembo mwa ye na mikili mya Iberiki. Mbela eye ekozwa ndimbola na yango, o mokolo mwa zomi ya Yuni (10 juin) na mpokwa na tango ya bobenisi ya tour Jésus-Christ ya Sagrada Familia ya Barcelone. Likanisi mpe mayele maùtaki na Venerable Antonio Gaudi. Na tango ya bofungoli ndako-nzambe monene eleki bandako-Nzambe ba mokili mobimba na molai, Tata Mosantu abengaki bato banso bátala mosika koleka makambo ma bomoi ya mokolo na mokolo, mpo na komona lisusu ‘te Nzambe azali wana, mpe básalisa baninga.

Kaka libula ya boyambi ekoki te

Mabele ma basantu Ignace ya Loyola, Yoane ya Kuruse (Jean de la Croix) mpe Tereza ya Avila, na bambula biwuti koleka, Espagne ezalaki kala esika, epai wapi eklezya Katoliko ezalaki makasi na mikili mya poto,kasi ekómaki sik’awa esika makambo ma losambo ezali mingi te. Atako Eklezya epesaki maboko mingi na Leta, bazali naino kokanisa boyokani oyo bakonzi baeklezya ya Espagne bazalaki na yango na boyangeli mabe ya Franco. Mingi mpenza, na nsima, ntango bato ya Espagne bayebaki ‘te babebisi bana ba bango, yango ebebisaki lisusu boyokani na bango kati na eklezya. Mgr Xabier Gómez García, episkopo ya Sant Feliu ya Llobregat, dioseze ya Catalan oyo ezali na lotómo la voti ya Archidioseze métropolitain ya Barcelone, alobaki ‘te: “Mokakatano ya liboso ezali ya kokóma eklezia ya bayambi bakoki kondimama solo; ekóma te eklezia eye ezali komilobela yango moko, kasi ekóma nde eklezia ya bosangani koleka (plus synodale), eklezyaya misio mpe ya bato banso basangani. Ezali lisusu te kaka likambo lya libula ya boyambi, esengeli kosangela yango na baninga, na bosolo mpe na litatoli ya bolingo”, ebakisi episkopo ya Baski.

Ntina ya bomoto bwa moto

Mokumba mwa Eklezya na mokili moye mokomonisama na nzela oyo Léon XIV aponaki. Ekozala na tango akokende kotala centre ya bato bazanga-ndako (sans-abris) oyo Caritas ya Madrid ezali kotambwisa. Ekoleka na mokolo mwa poso mwa 6 ya yuni na nsima ya nzanga. Mpe na tango akokende na Canaries na mokolo mwa 11 mpe 12 ya Yuni. Na Las Palmas ya Gran Canaria mpe na Santa Cruz ya Tenerife, Léon XIV akokutana na bamigrant oyo bautà na Amerika ya Sudi mpe na Afrika ya Westi. Akolendisa na boyambi mpe, baye bayambaka bango na bomoto o kati ya mikili mya Eropa. Na bisika Pàpa akokende kotala, akokanisa na biso ‘te nkombo ya Eklezya ezali ngolu, elobaki Mgr García.

Kokolisa masolo

Kati na maloba tuku mibale na mibale oyo eponami na kopesa bato, na ntongo ya mokolo mwa mwambe ya Yuni (8 juin), Pápa akopesa lisikulu ya kafukafu na Congrès ya ba députés na Madrid. Ekomamaki mpo na bato banso oyo baponamaki na Espagne na tango ya mobulu makasi mpe ya bokabwani ya politiki. Engebene na ndako ya bopanzi nsango ya Saint-Siege, lisukulu lya Pàpa ekomema boyokani na ntina ya masolo kati na eklezya, politiki, mpe mimeseno ya bato, mpo te bayeba kolekisa bokabwani. “Ntango boyambi ekomi ebundeli, wana nde esika tóbungisi Nsango Elamu mpe tozokisi boyambi”, elobaki episkopo ya Sant Feliu de Llobregat. Amitungisi na ntina ya boyambi oyo ezali kokoma likanisi lya bato na kati ya ntembe ya politiki ya mikolo miye. “Tosengeli kozongela na makambo ma ntina”.

Na yango, mobembo moye mokabolami na biteni misato ya mikakatano: «kozwa lisusu bomoko, kitoko mpe bolingo lokola bilembo bya solo ya bomoi oyo bato banso bazali na yango ». Bongo etapi na etapi emonani lokola ekokani na moko ya masengami mana: bomoko na Madrid, bonzengà na Barcelone, bolingo to bondeko na bisanga bya Canaries.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

04 sánzá ya motóbá 2026, 10:32