Luka

2026.06.24 Likita lya banso 2026.06.24 Likita lya banso  (@VATICAN MEDIA)

Likita lya bansó: Ukaristiya ezali sakraménto ya Bokónzi ekoya

O eleko ya likita lya bansó ya mokolo ya misáto eye 24 ya sánzá ya motóbá, Papá akobaki molongó na ye ya litéya na Sacrosanctum Concilium, likambo-likonzi ya Concile Vatican II na Litéya ya milúlú mpe nsámbo ya misa. «Mpo ya bakristu», esakolaki Léon XIV, «kozala na Ukaristiya, ezali komitika kosálema na Liloba ya Nzambe, komileisa na mesa ya Nzóto ya Mokónzi, mpe kozongisa matondi epái ya Nzámbe».

Vatican News

Papá abándaki likanisi ya litéya na ye, mokolo ya misáto 24 ya sánzá ya motóbá, na kokundola lisusu eténi ya sántu Polo, elobamaka na sántu Augustin mpo ya kolimbola na bato baye bazui libatisi sika mobombano ya Nzóto ya Kristu: «nzóto ekosála kaka mókó, nzokándé ezali na binama ebelé; mpe binama bansó, atáko motángo na bangó, bakosála kaka nzóto yokó. Ezali se bongo mpo ya Kristu. [...] Bozali nzóto ya Kristu mpe, mókó mókó mpo ya eye ya bino, bozali binama ya nzóto ená» (Litangi: 1 Ko 12,12-27).

«Sasaípi sima ya koloba Bilei ya súka ya Yézu», elimbolaki episkopo ya Roma na bandimi bébóo basangani na esika Sántu-Petelo, «Likambo-likonzi na Litéya ya milulu mpe nsámbo ya misa ekoloba Ukaristiya na maloba maye ya likanisi ya Augustin». Na boyambi yangó na Liloba na ye mpe na Ukaristiya, bandimi bakómi «Nzóto eye Mokónzi ezali Kristu asékwi, avandi na lobóko ya mobáli ya Tatá» oyo akobongisela «esika yokó na likoló». «Ukaristiya ezali bongo mobombano ya Bokónzi ekoya», elobaki Tatá-Esántu. «Ezali Lipa ya nzelá, eye ekomema biso na Ekóló ya lólá, kinó mokolo ebenisama esika wápi "Nzámbe akozala nionso mpo ya bansó"» (1Ko 15, 28).

 Mbeka ya molimo ya bakristu

«Ukaristiya ezali loléngé ya mbeka ya molimo ya bakristu», ekobaki Léon XIV. Na bozali waná, bandimi «bakoyekola komipesa bangó mókó mpe, mokolo na mokolo, ya kokóma nzóto ya Kristu, na bomoko na Nzámbe mpe bangó na bangó». Mobombano eye «ekoteya bangó kolanda loléngé ya bomoí ya Mokónzi Yézu ye mókó, ezua elembo ya likabo ya komipesa ofelé». Ntángo ya bozali na Ukaristiya, bakristu babéngami ya «koyóka Liloba ya Nzambe». Biténi biye mibalé ya misa, litéya ya milúlú mpe nsámbo ya misa mpe litéya ya Ukaristiya, «bizali ya kokangema makási káti na bangó yangó basáli kaka ekela yokó ya molúlú», elobaki lisusu Papá wa Roma. Kasi Papá akébisaki na boyébi bokó kaka na mayéle ya Makomi, na bobengi na esika ya koyamba Liloba ya «bomoí mpe ya makási», epésama na Nzámbe na bansó.

Mobikisi, ntángo ya Bilei ya súka, asálaka mbeka ya ukaristiya ya nzóto na ye mpe ya makila na ye, zambi ya kokoba na bikeke, kinó bozongi na ye, mbeka ya kuruze, mpe kopesa bongo na mwási na ye ya bolingo, Eklezia, bokundoli ya liwa na ye mpe ya nsékwa na ye. Bongo, Papá abéngaki bandimi ya kozua na boyambi na liziba liná ya bomoí ya bonzámbe, mpe komitika 'te mobombamo eye bazali kosepela na yangó ebongisa bangó.

Na bopesi mbote na bato ya mobémbo mwa boyambi ya lokóta ya lifalanse, bawutaki Belgique, Cameroun mpe Fránsa, Papá abéngaki bandimi ya kozua na Ukaristiya, «liziba ya bomoko ya bakristu», «makási esengeli mpo ya kobimisa boyókani mpe bolingo na mabótá na bisó mpe na masangá na bisó mingimingi bizua bilembo ya bitumba mpe ya bokabwani».



Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

24 sánzá ya motóbá 2026, 12:30