Léon XIV asepeli mpo na Boyokani kati na Etats-Unis mpe Iran
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Na ebandeli ya lisukulu na ye na lokota ya Italien nsima ya likita lya banso la mokolo mwa misato, Mokitani ya Pierre amonisaki esengo mpe botondi bwa ye mpo na boyokani kati na Iran mpe Etats-Unis. «Memorandum ya Islamabad» oyo mbala mosusu ekosalisa mpo na “bokengi to bobateli” mpe “kozala na bosikisiki” na Moyen-Orient; mpe na ngambo mosusu, mawa mpe kobanga mpo na etumba oyo ezali kopalangana na Ukraine.
Bokengi mpe kozala na bosikisiki na Moyen-Orient
Na mpokwa ya mokolo mwa mibale, liboso ya kolongwa na Castel Gandolfo, Pápa Léon XIV ayanolaki na motuna moko oyo batunaki ye na ntina na mokanda ya boyokani, mpe atondoki Nzambe matóndi mpo na boyokani yango. Nganga-Mokonzi Monene azali na elikya ‘te «akoki kozala mwango mwa solo mpo na kosukisa bitumba, ‘te etumba esila mpenza mpe ‘te tokoki kokende liboso mpo na bolamu bwaa bato banso. Kolongola bibundeli ya nikleere, ee, koluka bolamu ya bato banso, koluka kosilisa mikakatano, ata mpe ya nkita mpe ya bomoi ya bato, oyo esalemaki na eleko énà». Na nsuka ya likita, abakisaki ‘te: «Nazali na elikya ‘te boyokani oyo ekoki kosalisa mpo na kolendisa bondeko, bokengi mpe kimya na Moyen-Orient, na nzela ya kopesa nzela na masolo mpe ya boyokani kati na bikólo biye mibale». Na yango, balendisaki Iran nà Etats-Unis ‘te bàlanda nzela ya masóló mpe ya boyokani.
Bikolo mibale esengeli kotya mokoloto na mokanda mwa boyokani mokolo mwa mitano, nsima ya sanza minei mobimba ya matata. Etats-Unis nà Israël babandaki bitumba nà Iran na mokolo mwa 28 ya sànzà ya Febwali, mpo na ntina ya mikano ya nikleere mpe ya ba misili balistiki. Iran ezongisaki na kobundisa Israel, ba bases ya Amerika mpe basangani ba bango (leurs alliés) na etuka ya Golfe mpe na Moyen-Orient. Bongo bakangaki nzela na mombongo etambolaka na nzela ya mayi na ebale to mbù ya Ormuz
Mbélà mpo na motuya ya Ukraine
Na oyo etali matata mosusu na Ukraine, Léon XIV amilelaki ‘te “Bansango ya mpasi ezali nzokandé koya na ntina etali bitumba na Ukraine, oyo ezali kokóba kopalangana. Bato bayiké basalaki eloko te bakufaki, bato ya misala ya kobikisa bato babomamaki, bandako-nzambe mpe bisika ya lokùmu ebebisamaki na móto. Nazali pene ya baye bazali kolela balingami ba bango; na mpe ya baye bazoki mpe ya baye kati na mobulu bazali kokóba kosàlela bomoi na mpiko”, ekobaki ye na koloba.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye
