Luka

Sokoro moko azali kopepa bendela ya ekolo na yé , epai ya mintika ya bitumba na Kostiantynivka, Donetsk Region, na Ukraine Sokoro moko azali kopepa bendela ya ekolo na yé , epai ya mintika ya bitumba na Kostiantynivka, Donetsk Region, na Ukraine 

Ukraine: Kopesa elikya na bana na ntango ya bitumba

Koteya na boyambi na ntango ya bitumba, bokutani binene ya ba dioseze, mikanda ya bana na ngambo ya etumba mpe bisika ya kotoka bokasi ya molimo, bazali na kati ya lisoló elongo nà secretaire ya Comisio mpo na pastorale ya bilenge ya dioseze ya Kiev-Zhytomyr ya eklezya Katoliko ya Latin na Ukraine

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Boni boni kosalisa bana mpe bilenge mpo ba batela esengo ya bomwana, nzokandé bitumba ezali zonga zonga ya bango? Iryna Nazarenko, mokomeli ya Comisio mpo na mosala ya kobatela bilenge ya dioseze ya Kiev-Jytomyr ya Eklezia Katoliko ya Latin na Ukraine, azali mpe Coordinatrice ya mateya mpo na Bakatoliko ya Roma mpe molakisi na eteyelo ya lycée oyo ekambamaki na ba Salesian ya Vsesvit na Jytomyr, asololaki na bapanzi-sango ya Vatikan. Na lisoló na ye, alobeli mosala mwa ye ya mokolo na mokolo elongo na bilenge, mikanda ya bana na etumba, ntango ya losambo ya lisanga mpe esika oyo ye moko azwaka makasi ya kolemba te.

Mpo na Iryna Nazarenko, comisio eye etongamaki libela na lolenge oyo ezali lelo, na tango ya bokambi ya Tata Michał Wocial, mwa moke liboso ya ebandeli ya bitumba monene ya Russie. Na etuluku na ye, tokoki kotánga basàngó, bamamélo mpe bilenge oyo bamipesi na mosala, bongo bauti na masangá ndenge na ndenge. “Lokola tozali kobongisa misala na biso mpo na bilenge, ezali na ntina mingi koyoka bango. Secrétaire ya comisio yango alobaki ‘te bilenge bazali na mposa ya kosalela eklezya, mingimingi bana, bilenge mpe baninga ba bango.

Na nzela ya bibongiseli ndenge na ndenge, babongisi bazali kosala makasi mpo na kosala esika ya kopema na kimya, kozala na esengo ya solosolo, mpe kozala na eklezya zyz ezali na bomoi, mpo na kosalisa bana mpe bilenge bázwa lisusu makasi mpe kimya ya motema. Mokolo mwa bana na dioseze ebongisamaki mbala na mbala, na boumeli ya bambula mingi. Na mbul’oyo, bilenge koleka nkàmà misato (300) bazalaki na kati ya molulu mwango, elongo na bapastele mpe balakisi ba bango, bazwaki libaku ya kokima, ata mpo na mwa ntango moke, na bomoi ya mpasi ya bitumba.

Eloko ya motuya ya mateya maye, ezali nde kosangisa masano nà bopalanganyi ya Nsango Elamu. Na ndakisa, basalaki yango na nzela ya momekano ya ndembo ya mbula na mbula oyo ba bengi “Coupe de l’eveque”. Mpo na kosalisa bana mpe bilenge ‘te báyeba Liloba lya Nzambe, masano ya Biblia mpe masano ya olimpiadi ya Biblia mpe oyo babéngaka Agape ya Biblia ebongisami. Mpe lisusu, engebene na Iryna Nazarenko, Eteyelo ya animasio ya Salesian ebimisi matómbà malamu: bana mpe bilenge bazali koyekola mosala ya bolingo malamu, kosolola na etuluku, mpe kosalela baninga na bango.

Na mobù moye, mokolo ya bilenge ezalaki likambo ya kokamwa, bato koleka 400 bayanganaki na boumeli bwa mikolo misato mpe esukaki na mokolo mwa Nkitela (Pantekote). Ndulu ezalaki na mokano ya kosalisa bilenge, oyo bazali na eleko moko ya mpasi mpo na kobongisa bomoto bwa bango, mpo ‘te “bákutana mpenza na Kristu”.

Bosolo ya tango ya etumba: Baoyo bakufi, bisika ya komibomba mpe mikanda batindelaki basoda na etumba

Lelomei, bana ya ekolo ya Ukraine bazali kokutana ba mpasi moko oyo mwana moko te na mokili asengelaki kokutana na yango. Kasi eklezya mpe balakisi ba bango, bazali kosàla manso makoki mpo ya kosalisa bango bazala makasi na tango ya bwalé mpe ya matanga. Iryna Nazarenko alobi ‘te, etumba ezali likambo ya mpasi mpo na moto nyonso; bongo liloba “mitungisi” ekoki te mpo na kolimbola yango. Bana ya kelasi to bayekoli mingi ya licée babungisaki bandeko ba bango na etumba. Molakisi alobi ‘te, ezali mpasi oyo ekoki kolimbolama te, bakoki koyika mpiko bobele na lisalisi ya Nzambe. “Bana mpe bilenge bazali kosambela to kobondela makasi mpo na baoyo bazali sikawa na molongo mwa liboso ya bitumba mpo na kobatela bango, ntango bango moko bazali kokende na kelasi. Tobondelaka mpe elongo”. Iryna alobi ‘te “ezali esengo monene komona esengo ya mwana na tango ayoki ‘te moto moko ya libota na ye, oyo azalaki lisusu te banda kala, amonani lisusu mpe azali na bomoi”.

Lisungi mpo na ba bateli (défenseurs) ya Ukraine ekomi eteni ya bomoi ya ba parwase mpe biteyelo. Bana bazali kosala bakarte mpe kokoma mikanda oyo ezali na bilembo to biyemi ya ekólo. Nzokandé bapesaka yango na ba benevole batinda yango, mpo na kopesa matondi na bandeko oyo bamipesi na bolingo na bango moko to mpe basoda oyo bazali liboso na bitumba. Biyemi bina mpe maloba ma bango, elobaka mingi mpenza, soki omoni to mpe oyoki yango boye, okokoka te kokanga mpinzoli na miso. Basoda bazalaki koloba na mpinzoli na miso ‘te “bana bazali mpenza ntina ya liboso oyo bango bazali kotya bomoi bwa bango na likámá, mpe bazali komipesa na etumba.

Kozala na bomoi ya mokolo na mokolo – Wapi kozwa makasi na ntango ya babómbi?

Iryna Nazarenko, atikalaki na Ukraine banda bitumba oyo ya makasi ebandaki, bongo alobaki ‘te “lelomei Ba-Ukraine bazali kobika kati na ezalela oyo moto moko te ayebi soki akolamuka lobi, mpo ‘te babómbi ya ba agresseurs ezali kobebisa bingumba mpe koboma basivile mingi. Na ntango eye ya makàmà ya ntango inso, eloko kaka moko oyo ezali kosalisa bango, ezali boyambi to kondima na ye ya makasi mpe basakramento.

Losambo ezali kopesa moto makasi ontei ya yé, bongo, molakisi alobi ‘te akoki te kokanisa lolenge eleko eye ya mpasi ekokaki kozala kozanga Nzambe mpe kozanga kosangana mbala na mbala na Ukaristya. Elikya ezwami bobele kati na ngolu mpe libateli lya Nzambe. “Nalamukaka mikolo minso mpe na monaka lolenge Mokonzi apesaka ngai makasi ya kosala elongo na bana, ya koteya bango, ya koloba nà bango, ya komema bango na mwinda. Mpe nazali kosala yango”, elobaki Iryna Nazarenko.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

16 sánzá ya motóbá 2026, 21:10