Luka

Pàpa Leon XIV na tango ya losambo la Angelus ya lomingo la 31 ya sànzà ya Màyi 2026, na lininisa ya palais apostoliki na Vatikan Pàpa Leon XIV na tango ya losambo la Angelus ya lomingo la 31 ya sànzà ya Màyi 2026, na lininisa ya palais apostoliki na Vatikan  (ANSA)

Léon XIV: Tika ‘te Nzambe atambwisa mikano ya bakonzi ba mokili na nzela ya kimya ya bosembo ekowùmela

Na suka ya Angelus, Nganga-Mokonzi monene asambelaki ‘te Mayele ya Mokonzi engengisa «makanisi ya baye bazali na bokonzi» mpo na kosukisa matata. Bongo, na libakù lya mokolo mwa 25è ya “Mokolo ya kopesa lisungi” oyo esalemaki na Italie, alendisaki bato “bákolisa ezalela ya bozalani pene».

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

“Na sànzà ya Màyi mobimba, eklezya mobimba etombolaki mongongo elongo, mpo ya kosenga Kimya”. Papa azongelaki kokanisa na bato eloko yango na mokolo mwa 31 ya sànzà ya mitano na ntango ya losambo la Maria ya “Angelus”, na esika ya Sait Pierre, o mokolo mwa lomingo, basangani ebele ya bakristu mpe ba pèlerins bautaki na bingumba ya Italie, Pologne, Cameroun mpe Slovaquie. Na Nzela ya sapelé, eklezya ebonzelaki Nzambe na bolobeli bwa Mama Ngondo Maria, bato bazali kokufa likolo lya etumba; elobaki Pàpa.

Bitumba, mobulu, koyokisa nsóni mpe lokumu ya bomoto

Bayambi bamemaki makanisi ma bango ya losambo oyo wapi bazali kosenga mingi mpenza “nsuka ya bitumba mpe kimya ya libela o kati ya bikólo binso”. Na ndakisa, batombolaki mingongo na bango mpo na baoyo bazali konyokwama na mobulu ya bitumba; mpo na bato na boloko mpe “baye bazali konyokwama na makambo ya soni bayokisi bango, oyo ezali kobebisa lokumu ya moto, mpo ‘te babungisa elikya te mpe bazwa libondisi na baoyo bamipesi mpo na kolónga mobulu”

Bato bazali na bosénga, ba-kimi mboka, mabota

Lisanga mobimba ya bakristu basengaki lisungi ya Mama Maria, Mokonzi-Mwasi ya Kimia, mpo na “ba minganga, basungi mpe bavolontele oyo bapesaka lisungi mokolo na mokolo epai ya bato bazali na bosénga, mpo na kosalisa bango bákóma ebele mpe bázala na ekateli makasi”. “Mpo na baye banso bayambaki bato bakimá-mboka na mitema polele, mpo ‘te balembe te kolakisa bokabi mpe lisungi; mpo na mabota oyo ekabwani, batata mpe bamama oyo bazali kozela bozongi ya bana na bango”. Mpe na bana oyo bazali kozela kozonga na ndako, mpo moto moko te kati na bango ayoka mpasi na motema.



Bwanya bwa Nzambe mpe ya bakambi

Na mokolo moye mwa eyenga ya Bosatu Bosantu, mokolo mwa lomingo, liboso lya bato koleka bankoto tukù mibale, 20 000 oyo bayanganaki na esika monene ya Vatikan, Pape abondelaki lisusu mpo ‘te “Bwanya bwa Nzambe engengisa bososoli bwa baye bazali na bokonzi, mpe bazali kobongisa makanisi ma bango mpo na koluka na bosembo kimya ya sembo mpe ekowùmela”. Na nsima, Léon XIV apesaki mbote na bituluku ndenge na ndenge ya bayambi oyo bayanganaki wana, mpe na bato oyo basalaki mobembo monene ya losambo na Piekary, na Pologne, epai wapi Maria akokumisami lokola Mama ya bosembo kati na bato.

Mokolo mwa bosungi

Na bokundoli ‘te, lelo na Italie, eyenga ya tuku mibale na mitano, 25 è ya “Mokolo mwa lisungi”. Na mobu moye,  motó ya likambo, to mpe likanisi ntina na yango ezali: “Nazali kosunga”, Papa alakisi ‘te “azali pene na bato banso ya maladi mpe na baoyo bazali kobatela bango”. “Natondi mpe nalendisi bato banso baye bazali kopalanganisa boninga mpe komibanzabanza”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

31 sánzá ya mítáno 2026, 18:44