Luka

Léon XIV: Kimya ebandaka na nzela ya boyoki ya baoyo bazangi yango

Na nsuka ya sanza eye ya Maria, Pàpa asukisaki bansambo ya sapelé nà losambo lya ya nsuka ya Maria na lobàlà ya Vatikan, o mokolo mwa poso, mwa 30 Màyi ya mobu 2026. Léon XIV azongelaki kosenga ‘te moto nyonso atika ezalela ya bokeseni mpe bàsala mpe bàzala bato batyaka kimya, baye bayokaka mpe bato bàyebaka kosalisa bato baye bazali konyokwama.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Atako mikakatano ezalaki na mokili, Léon XIV alembisi maboko te. Na mpokwa ya mokolo mwa poso mwa 30 Màyi, na lobàlà ya Vatikan, esika bato 2 000 basanganaki, na nsuka ya losambo la Sapelé mpo na kimya, Pàpa abyangi bayambi banso mpo na kolendisa bango. Bongo alobi ‘te mpo kimya ezala, esengeli koluka yango ontei ya motema mpe kosala ‘te bikela bya yango emonana. O mokolo mwa 11 Apríli, na losambo asalaki liboso mpo na kimya, Léon XIV asalaki lisukúlu moko ya nsomo oyo ebendaki likebi ya bato ya mokili mobimba. Episkopo ya Roma alendisi lisusu bato, bándima sikawa mokumba to etindà oyo: «Nzambe azali koluka bato ya boboto to kimya!»

Na kelasi ya Maria

Nganga-Mokonzi monene asengi toyóka liloba lya Nzambe, po ‘te tokoka kosósóla na losambo, tina ya makambo manso mazali koleka na mokili. Pàpa abyangi bato batya motema na Nzambe, mpamba té na mayele ma ye, “atambwisaka lisoló lya bato mpe asungaka biso tango inso”.

Na botosi bwa ye liboso la mokano mwa Nzambe, Ngondo Maria azali “ndakisa ya moyambi oyo afungolaka matoyi ya motema mwa ye mpo na koyóka maye Nzambe azali koloba”, elobi Tata Mosantu. Ezali nzela oyo ememaka na bokutani elongo na Mwana wa ye, na nzela ya mibombamo ya Rosario. Ezali mpe nzela ekosalisa na koyeba yé lokola “Liloba moko mpe ya nsuka oyo Tata alobaki, Liloba lya boboto mpo na baye banso bakozonga epai na Ye na motema moye mosi mobongwani”.

Luka kimya to boboto mpo ‘te eyà

Pape akanisi na bato ‘te kimia ezali likambo ya mabanzo mpamba te, oyo esengeli kokonza to mpe kosalela bó elingi yo, kasi ezali nde “mobeko mwa bomoi ya mokolo na mokolo” oyo esengeli kokokisama na “motema sembo”. Mpo na episkopo ya Roma, koluka kimya to boboto, ezali eloko ekowùta na motema ya moto. “Ata na tango eye ya mitungisi mpe ya bitumba, boboto to kimya ekoki kozwama, soki toyoki kolela ya baoyo bazangi yango”. Asengi ‘te lolàkà ya baye bazali na mpasi, eyokàma, bana mike, basali likambo te, bamama mpe batata oyo bazali na komitungisama, bato na boloko baye bazali konyokolo, bakimi-mboka, mpe bato ya mibù ndenge na ndenge oyo bazali konyokwama: “Banso bazali sé na liloba lyoko na monoko mwa bango: kimya!”.

Leon XIV akundoli na bato ‘te boboto to mpe kimya ezali likabo la Nzambe, mpe ekosilaka tè. Ezali na elongi ya Kristu oyo amikabaki na Kuruse: “Ye oyo akweisaki bifelo bya boyinani, akweisaki lolendo na nzela ya komikitisa, mpe asikolaki bikelamu binso na lisumu”.

Kobatela elikya

Soki tozali kokipe te bampasi ya basusu, tokokóma mosika na Nzambe. Nzokande, Tata Mosantu alendisi Bakristu ‘te bakamata mikumba na bango, bakómisa kimya ya Kristu, eloko ya bomipesi bwa bango; esalema na kati ya mabondeli mpe na mosala to etindà na bango.  “Okati ya baengumba ya biso, kolele esengelei kozala lisusu te, moto moko te, asengeli kokima ndako ya yé na ntina ya ba bombi. Mposa ya bokonzi mpe ya matata, etika esika na mposa ya bosembo mpe ya bosóló. Kasi moto na moto asengeli komema oyo ya yé likabo mpo ya kotonga kimya enà”. 

““Okati ya baengumba ya biso, kolele esengelei kozala lisusu te, moto moko te, asengeli kokima ndako ya yé na ntina ya ba bombi. Mposa ya bokonzi mpe ya matata, etika esika na mposa ya bosembo mpe ya bosóló. Kasi moto na moto asengeli komema oyo ya yé likabo mpo ya kotonga kimya enà”.”

Ekobandaka na elimo ya kosangana na baninga, na mwa misala ya mike mike kasi ezali na ntina mingi; elobi Pápa, lokola koboya maloba mpe misala mya mobulu na bomoi ya mokolo na mokolo, ata mpe na ba réseaux sociaux. Kimya ebandaka na nzela ya kobongola motema: “emonisamaka na ba mbebo biye bizali koloba maloba ya bozongisi boyokani; emonisami na miso ezali kotala mokili na boboto mpe na bwanya. Oyo nde nguya to makasi ma solo, nguya ya bosolo mpe ya bolingo”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

30 sánzá ya mítáno 2026, 18:07