Luka

2026.05.11  Masolo ma Pàpà elongo na mbulamatari ya Repibliki ya Sudan ( République du Soudan), Kamel al-Tayeb Idris Abdelhafiz, o mokolo mwa 11 mai 2026.. 2026.05.11 Masolo ma Pàpà elongo na mbulamatari ya Repibliki ya Sudan ( République du Soudan), Kamel al-Tayeb Idris Abdelhafiz, o mokolo mwa 11 mai 2026..  (@VATICAN MEDIA)

Léon XIV ayambi na masolo, mbulamatari ya Soudan

Na ntongo ya mokolo mwa yambo, mwa 11 ya Màyi (sànzà ya mitano), Papa ayambaki na Vatikan, Kamel al-Tayeb Idris Abdelhafiz. Na masolo ma bango, esalemaki na Secrétariat Etat, balobelaki likambo lya matata mizali kotungisa ekóló Soudan, ut’o boye mibù misato, oyo mboka eye ekangami na bitumba. Balobelaki mpe lisungi linene lya Eklezia ya mboka mpo na bolamu bwa ekóló.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

Mbulamatari ya Repibliki ya Soudan, Kamel al-Tayeb Idris Abdelhafiz, ayambamaki na Tata mosantu, o mokolo mwa 11 ya sànzà ya Màyi to sànzà ya Mitano. Na sima akutanaki nà Pietro Parolin, Secrétaire ya État ya Saint-Siège. Bazalaki elongó nà Mgr Mihăiţă Blaj, secrétaire - molandi ya mpo ya bboyokani nà baetukà (sous-secrétaire pour les Relations avec les États). Engebene na liyebisi ya ndako ya bopanzi-nsango ya Sainte- Siège, na bokutani bónà, «balakisaki motuya ya boyokani kati na Vatikan nà Soudan», mpe «lisungi linene ya Eklezia ya ekolo eye, mpo na bolamu bwa mboka».

Masóló mpe Boboto

Basololaki mpe na ntina na «mpasi monene oyo, koleka mibu misato, ezali konyokola Soudan, oyo ezali nayino o kati ya bitumba». Na yango, ekoki komonisama polele «bosénga ya lombango na «Bokitisi mandoki» to kokata masasi, komema lisungi na bato mpe esengeli kotombola masolo ma sóló kati na biteni binso bya ekolo ya Soudan, mpo na kosukisa matata mpe kotonga kimya elongo».

Pàpa Elongó nà mbulamatari ya Soudan
Pàpa Elongó nà mbulamatari ya Soudan   (@VATICAN MEDIA)

Basivili baye babomi 

Mpo na Haut Commissariat ya Nations unies  na mpó ya lotomo la moto, pene na basivili 880 babomamaki na bitumba ya ba drones kati na sànzà ya Yanuali mpe sanza ya Aprili ya mobu moye 2026 na  mboka wana ya Afrika ya Nord, esika bitumba bizali kosalema nayino ut’o mibu minei. Bitumba kati na ba paramilitaires ya Rapid Support Forces (FSR) nà basoda ya Soudan banda sanza ya Aprili ya mobu 2023, esali ‘te bankoto ya bato bakufi - basusu balobi ‘te bato koleka 200.000 bakufi - mpe bamilio ya bato bakimi bisika ya bamboka ba bango.

11 sánzá ya mítáno 2026, 22:03