Léon XIV ayambi na masolo, mbulamatari ya Soudan
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Mbulamatari ya Repibliki ya Soudan, Kamel al-Tayeb Idris Abdelhafiz, ayambamaki na Tata mosantu, o mokolo mwa 11 ya sànzà ya Màyi to sànzà ya Mitano. Na sima akutanaki nà Pietro Parolin, Secrétaire ya État ya Saint-Siège. Bazalaki elongó nà Mgr Mihăiţă Blaj, secrétaire - molandi ya mpo ya bboyokani nà baetukà (sous-secrétaire pour les Relations avec les États). Engebene na liyebisi ya ndako ya bopanzi-nsango ya Sainte- Siège, na bokutani bónà, «balakisaki motuya ya boyokani kati na Vatikan nà Soudan», mpe «lisungi linene ya Eklezia ya ekolo eye, mpo na bolamu bwa mboka».
Masóló mpe Boboto
Basololaki mpe na ntina na «mpasi monene oyo, koleka mibu misato, ezali konyokola Soudan, oyo ezali nayino o kati ya bitumba». Na yango, ekoki komonisama polele «bosénga ya lombango na «Bokitisi mandoki» to kokata masasi, komema lisungi na bato mpe esengeli kotombola masolo ma sóló kati na biteni binso bya ekolo ya Soudan, mpo na kosukisa matata mpe kotonga kimya elongo».
Basivili baye babomi
Mpo na Haut Commissariat ya Nations unies na mpó ya lotomo la moto, pene na basivili 880 babomamaki na bitumba ya ba drones kati na sànzà ya Yanuali mpe sanza ya Aprili ya mobu moye 2026 na mboka wana ya Afrika ya Nord, esika bitumba bizali kosalema nayino ut’o mibu minei. Bitumba kati na ba paramilitaires ya Rapid Support Forces (FSR) nà basoda ya Soudan banda sanza ya Aprili ya mobu 2023, esali ‘te bankoto ya bato bakufi - basusu balobi ‘te bato koleka 200.000 bakufi - mpe bamilio ya bato bakimi bisika ya bamboka ba bango.
