Angelus : Bomonisami bwa Mobikisi ezali libiki lya kokàmwa
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Na lomingo loye la mibale ya eleko ya Karézimo, Nsango Elamu ya lelomei, euti na Sántu Mateo (17, 1-9) ezongeli lisolo lya mbongwana ya Mokonzi. “Mpo na komonisa yango, mopanzi nsango azali kobenda likebi na makanisi ma bantoma, azali kokoma Kristu kati na Moyize mpe Eliya”. Pàpa alobi yango lisusu liboso lya bandimi bàyaki na esika ya Santu Petro. “Liloba oyo ekómáki moto ezali na katikati ya Mibeko mpe Bosakoli; ezali bwanya bwa bomoi boye ezali kokokisa maloba manso mya Nzambe. Makambo manso maye Nzambe atindaki mpe apesaki makanisi na bato básala, ezali komonana polele mpe na mobimba mwa yango, na Yezu”.
Lokola mokolo mwa mbotamà ya Kristu na Yordani, tóyóki lisusu lolaka la Tata ezali kobelela: “Oyo azali Mwana wa ngai molingami”, awa Elimo Santu azipi Yezu na “lipata likongenge” (Mateo 17:5), emonisaki yango Léon XIV.
Nkembo emimonisaka lokùmu na miso soki te
Ntango azali komimonisa, Mokonzi azali kolakisa nkembo ya ye epai ya biso. Elongi ya ye ezali kongenga lokola moyi mpe bilamba bya ye ekómi mpembe lokola Mwinda. Nganga Nzambe monene akóbaki kolobela ndimbola ya bobongwani bona mpe alobi ‘te: “Petro, Yakobo mpe Yoane bazalaki kotala nkembo ya botawu, oyo ‘ekomimonisaka na lokùmu soki te mpo na kokamwisa ebele ya bato, kasi elakisaka mpenza konfiansi to etyelaka bato motema”.
“Mbongwana ya Yezu”
Mbongwana elakisi liboso mwinda mwa Pasika, likambo lya liwà mpe ya nsekwa, ya molili mpe ya mwinda ya sika oyo Kristu azali kongengisa likolo ya nzoto nionso ezwami na mpasi, likolo lya nzoto enyokwami na bwalé, likolo ya nzoto esundolami na bobóla”, elimbolaki lisusu episkopo ya Roma
Mbongwana ya nzoto
Na nsima, Léon XIV akóbi na kolobela likanisi lya ntina ya nzoto oyo, soki ebongwani: “Awa mabe ezali kokómisa nzoto ya biso lokola biloko bya kotekisa tó biloko biye biyebani te, bobele kaka nzoto yango moko nde ezali kongenga na nkembo ya Nzambe”. “Mobikisi abongoli bongo bampota ya lisolo ya bato, angengisi makanisi ma biso mpe mitema mya biso: bomimonisi bwa ye bozali libiki lya kokàmwa”.
Bóngó Pápa atunaki bakristu ‘te: “Tozali na mposa ya koyeba yango? Elongi ya solo ya Nzambe emoni soki o kati ya biso eloko ya kokamwa mpe ya bolingi ezali?” Liboso lya “boyambi bwa biso elembi”, esukisi ye, nsango ya nsekwa ya mikolo mizali koya ezali solo, mpe bayekoli bamoni nkembo ya Kristu, kasi mpo ya koyeba yango, esengaka mwa tango (Mat. 17:9). Mwa “tango ya kofanda nyee mpo na koyoka Liloba, ntango ya kobongola motema mpo na komeka boninga to kozala elongo na Mokonzi”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
