Papa asambeli mpo na bato baye bazwi likama na mine na ngambo ya Moniele (Esti) ya RD Congo
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Bobukani ya mabele na esika ya ntina ya mabanga ya ntalo ya Rubaya, na bakilometele tukù sambo (70) ya engumba ya Goma na ngambo ya moniele to Esti ya Républiki Demokratiki ya Congo, esalaki ‘te bato bayiké bazwa likàmà na poso eye. Bato pembeni ya minkamà mibale to 200 personnes bakutanaki nà liwa na ekwela enà. Ezali nde mbulamatari ya engumba enà ya Nord-Kivu, oyo batomboki ya M23 batiyaki mpo ya kokamba etuka eye, ut’o Yanuali ya mobù 2025.
Na ntango ya Angelus o’mokolo mwa poso, mwa 1er Febwali, Papa Leon XIV alakisaki bozalani pene pene to bondeko bwa ye, na baye bazwaki mpasi na likambo ya mawa mpe mabota ma bango. “Nabondeli mpo na ebele ya baye bazwaki mpasi na kokweya ya mine na Nord-Kivu, ya Répibliki Démokratiki ya Congo,” elobi ye. “Tiká ‘te mokonzi asunga bato oyo bazali konyokwama mingi!”. Mbulamatari ya Répibliki démokratiki ya Congo elakisaki solidarité na ba victimes, kasi efundaki M23 batomboki, bazali kosalela mabanga ya nkita ya mabele ma biso na etuka ena, na lolenge lya mabe mpe ya somo. RDC ezali fournisseur monene ya Coltan, minerais métalliques oyo ezali na ba métaux oyo basalelaka na fabrication ya ba smartphones, ba ordinateurs mpe ba moteurs ya avion. Enguma ya mabanga mantalo ya Rubaya ebimisaka ye moko, 15% kino 30% ya Koltan na mokili mobimba.
Losambo mpo ya bato bazwi likàmà yam pela na Mozambiko, na Portugal mpe na Italie.
Na tango ya losambo la Angelus, Tata Mosantu asambelaki mpe lokola mpo ya baye bazwi likàmà kala mingi te ya mompepe makasi na Portugal, na nagambo ya Ngele to sudi ya Italie nà mpe na Mozambiko. Bato pene ya 150 bakufaki na poso eye, tango mompepe makasi nà mbula ebetaki na Mozamiko. Bongo bato bazwamaki na likamà ya mbula makasi mpe mpela, bazali bamiliyon.
O kati kati ya Portugal, pene ya bato motoba bakufaki na mompepe makasi
Oyo ebengami na nkombo ya Kristi. Mompepe makasi ekomaki na bakilometele 202 na ngonga moko. Atiki mbemba makasi na nsima na ye. Na poso eye, Pàpa atindaki maloba ma bobondisi na Mgr José Ornelas Carvalhos, episkopo ya Leiria-Fatima mpe mokambi ya lisanga lya baepiskopo ya Portugal (CEP), Telegrame moko mp ona kopesa ba kondoleancsi na ye (un télégramme pour transmettre ses condoléances) na mabota mazwaki likamà. Asanganaki na bango na molimo mpo ya mpasi bakutanaki na yango o kati ya mabota.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
