Basàli na elanga ya mine, ya Rubaya, ekambami na bokengi bwa batomboki bya M23, na ngambo ya Moniele (Esti) ya RDCongo. Basàli na elanga ya mine, ya Rubaya, ekambami na bokengi bwa batomboki bya M23, na ngambo ya Moniele (Esti) ya RDCongo. 

Papa asambeli mpo na bato baye bazwi likama na mine na ngambo ya Moniele (Esti) ya RD Congo

Na nsuka ya losambo la Angelus, Leon XIV asambelaki mpo y abato koleka minkàmà mibale (200 personnes) oyo babungisaki bomoi bwa bango, na likàma ya bobukani ya mabele na elanga ya bamine ya Koltan, na ngambo ya Moniele to Esti ya RD Congo. Lolenge yoko, apesaki limemya na baye bazwaki likàmà ya mayi na Mozambiko mpe ya mvula na Portugal

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Bobukani ya mabele na esika ya ntina ya mabanga ya ntalo ya Rubaya, na bakilometele tukù sambo (70) ya engumba ya Goma na ngambo ya moniele to Esti ya Républiki Demokratiki ya Congo, esalaki ‘te bato bayiké bazwa likàmà na poso eye. Bato pembeni ya minkamà mibale to 200 personnes bakutanaki nà liwa na ekwela enà. Ezali nde mbulamatari ya engumba enà ya Nord-Kivu, oyo batomboki ya M23 batiyaki mpo ya kokamba etuka eye, ut’o Yanuali ya mobù 2025.

Na ntango ya Angelus o’mokolo mwa poso, mwa 1er Febwali, Papa Leon XIV  alakisaki bozalani pene pene to bondeko bwa ye, na baye bazwaki mpasi na likambo ya mawa mpe mabota ma bango. “Nabondeli mpo na ebele ya baye bazwaki mpasi na kokweya ya mine na Nord-Kivu, ya Répibliki Démokratiki ya Congo,” elobi ye. “Tiká ‘te mokonzi asunga bato oyo bazali konyokwama mingi!”. Mbulamatari ya Répibliki démokratiki ya Congo elakisaki solidarité na ba victimes, kasi efundaki M23 batomboki, bazali kosalela mabanga ya nkita ya mabele ma biso na etuka ena, na lolenge lya mabe mpe ya somo. RDC ezali fournisseur monene ya Coltan, minerais métalliques oyo ezali na ba métaux oyo basalelaka na fabrication ya ba smartphones, ba ordinateurs mpe ba moteurs ya avion. Enguma ya mabanga mantalo ya Rubaya ebimisaka ye moko, 15% kino 30% ya Koltan na mokili mobimba.

Bato baye balungwe bandako babango camp ya Bulengo, pembeni ya Goma, na etukà ya Nord-Kivu, na ngambo ya Moniele to Esti ya RDC, epai wapi etumba ezali kosala eyoma
Bato baye balungwe bandako babango camp ya Bulengo, pembeni ya Goma, na etukà ya Nord-Kivu, na ngambo ya Moniele to Esti ya RDC, epai wapi etumba ezali kosala eyoma   (ANSA)

Losambo mpo ya bato bazwi likàmà yam pela na Mozambiko, na Portugal mpe na Italie.

Na tango ya losambo la Angelus, Tata Mosantu asambelaki mpe lokola mpo ya baye bazwi likàmà kala mingi te ya mompepe makasi na Portugal, na nagambo ya Ngele to sudi ya Italie nà mpe na Mozambiko. Bato pene ya 150 bakufaki na poso eye, tango mompepe makasi nà mbula ebetaki na Mozamiko. Bongo bato bazwamaki na likamà ya mbula makasi mpe mpela, bazali bamiliyon.

Mgr João Carlos Hatoa Nunes, Episkopo mokonzi to archevêque ya Maputo
Mgr João Carlos Hatoa Nunes, Episkopo mokonzi to archevêque ya Maputo

O kati kati ya Portugal, pene ya bato  motoba bakufaki na mompepe makasi

Oyo ebengami na nkombo ya Kristi. Mompepe makasi ekomaki na bakilometele 202 na ngonga moko. Atiki mbemba makasi na nsima na ye. Na poso eye, Pàpa atindaki maloba ma bobondisi na Mgr José Ornelas Carvalhos, episkopo ya Leiria-Fatima mpe mokambi ya lisanga lya baepiskopo ya Portugal (CEP), Telegrame moko mp ona kopesa ba kondoleancsi na ye (un télégramme pour transmettre ses condoléances) na mabota mazwaki likamà. Asanganaki na bango na molimo mpo ya mpasi bakutanaki na yango o kati ya mabota.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

01 sánzá ya míbalé 2026, 20:22