Luka

2025.11.27 Pàpa Leon ya XIV na mobembo mwa yé ya Bontomà ya mbala ya yambo na Turquie mpe na Liban 2025.11.27 Pàpa Leon ya XIV na mobembo mwa yé ya Bontomà ya mbala ya yambo na Turquie mpe na Liban   (@VATICAN MEDIA)

Nsima ya Zubile, Leon ya XIV abandeli mibembo mya yé, akokende na Afrika, Espagne mpe Monaco.

O mokolo mwa misato, mwa 25 ya sanza ya Febwali, ndako ya bopanzi-sango ya Vatikan epesaki liyebisi lya mibembo misato ya bontómà, ekosalema na katikati ya mobù 2026. Pápa Léon XIV akosàla mobembo mya mikolo zomi na Afrika, akokende na Algerie, na Cameroun, na Angola mpe na Guinée équatoriale. Manaka ma ye milengeli mpe mikolo motoba na Espagne, kati na Madrid, Barcelone mpe bisanga bya Canaries, na sanza ya Yuni mokoyà, mpe mokolo moko na Monaco, mokolo mwa poso, mwa 28 ya Marsi.

Albys KBD, CP - Kinshasa/RDC

 

Mobembo moko ya mikolo zomi na Afrika, mokolo moko na bokonzi bya Monaco mpe mikolo motoba na Espagne. Sima ya mobembo mwa ye ya mbala ya yambo na Turquie mpe na Liban na nsuka ya mobù mosantu 2025; mpe liyebisi lya mibembo mikoyà na Italie, oyo ekomema bango kino na Lampedusa, Pàpa Leon ya XIV akobandela mibembo mya bontómà na mokili mobimba.

Sima ya bilembo bya boyambi mpe bya kimya

Mobembo ya molayi koleka, ekobanda mwa 13 kino 23 ya sànzà ya Aprili, sima ya Pasika. Ekolanda bitambi bya Santu Augustin na Algerie, Alger mpe Annaba (Constantie-Hippone). Sima Pàpa akokende na Afrique centrale, akoleka na Cameroun epai wapi akotala engumba ya Yaoundé, Douala mpe Bamenda na Nordi ya mboka. Na Angola, akotelema na Luanda, Muxima mpe Saurimo. Teleme ya nsuka ekozala oyo ya Guinée équatoriale, yoko mboka elobaka Espagnol kati na mabele ma Afrika. Kasi lifalansa ezali lokota lya bango ya mibale mp ona kosolola nà bato ba mikili misusu na polele. Kuna, Pàpa akokende kotala etukà ya Malabo, Mongomo mpe Bata. Mobembo moye mwa molayi koleka, ezali na mokano ya kozala mobembo mwa bokundoli mabele mya mosantu ya Hippo. Azalaki molingami ya Mokitani mwa Petelo (Petro). Bongo ekozala mpe mobembo to botali ya bomoko; ekotya mwa bokebi mingi mpenza na baye bazali na bozangi koleka (les plus demunis. Mpo na boùmeli to bolayi bwa yango, mobembo moye mozali kokundwela yoko mobembo esalaki Pàpa Jean Paul II na mobù 1985, na mikolo zomi (11 jours) na moko mpe ememaki ye na bikolo sambo (7 pays).

Na Espagne mpe Monako, esengeli Boyambi, Kimya mpe Architecture

Na ebandela ya zanza ya Settembe, akosala na lombango mobembo ya mokolo moko mpamba na mikili ya Poto, na bokonzi bwa Monako. Etangami mokolo mwa Poso mwa 28 ya sanza ya Marsi, pene ya Lomingo la mandalala. Nganga-Nzambe monene ayanoli malamu na mbela basalaki mbala na mbala na bakonzi ya monaco, kobanda na motomolo mwa yé François, mpe sika ye mei. Na bokonzi bónà, bàsakolaka eyamba ya katoliko, mpe boyokani bozali koleka malamu kati na mbulamatari mpe eklezya. Bamipesi makasi mpo ya kobatela kimya o kati ya ekolo, awa bakoyamba mp ona mbala ya yambo na eleko eyey ya sika, mpamba tè ezali eloko ya motuya mpenza.

Na nsuka, kobanda mokolo mwa 6 kino 12 ya sànzà ya Yuni, Leon ya XIV akokende na Espagne. Akoteleme na Madrid, oyo ezali mboka-mokonzi ya ekolo eye, mpe akokende na Barcelone, mpo na kobandisa to kofungola ndako-molayi ya sika ya Sagrata Familia. Ezali bazilika moko monumentale oyo esali liyemi lya engumba catalane. Mobembo moye mokutani nà libakù lya bokundoli mibù nkama moko (100ème anniversaire) ya liwa lya Antoni Gaudi, architecte oyo akomi Venerable ut’o mobù moleki. Mpo ya kokóba mobembo mwa yé, Pàpa ya Perù akokende na Barcelone, kuna akoleka na esanga ya Canaries. Tata episkopo wa lokumu José Cobo Cano, archeveque ya Madrid alobi ‘te: akosala bongo mobembo moye mozalaki na motema mwa Pàpa François. Bitapi mibale mizali kozela ye, liboso na Tenerife mpe sima na Grande Canarie.

Mobembo ya makambo meke mpe ndenge nandenge

Na tango ya mibembo miye, episkopo ya Roma akozwa libakù lya kokende bikolo bikeseni mpe makambo ndenge na ndenge. Akoleka na mboka ya bamizilma epayi wapi ba bakatoliko bazali mingi te, kasi bakosakolaka mpe kotatola eyamba ya bango makasi. Akoleka mpo ya mwa tango moke na mwa ekolo ya mibale eleki moke na mokili, sima ya Vatikan. Mboka eye ezwami na Cote ya Azur. Na sima mpo na kosukisa, akokende na ekolo monene ya mikili ya Eropa, bokonzi bwa Espagne. Kala esimbamaki na boyambi ya katoliko, kasi sik'awa, etungisami na basecularisme ndenge na ndenge. Akosukisa botamboli bwa yen a Esanga ya Canaries, moko ya banzela oyo baluki-mboka to ba migrants balekaka ut’o Afrika mpo bakota na Eropa. Mbula na mbula, bankótó ya bato bakota kuna.

Botanga liyebisi ebimaki na bulletin ya ndako ya bopanzi nsango ya Saint-Siege (Lire l'annonce officielle au bulletin de la Salle de presse du Saint-Siège)

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

25 sánzá ya míbalé 2026, 12:34