Mgr Nkea : Pàpa azali koyà na Cameroun lokola Ntoma ya Kimya
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Papa azali koyà kotala Cameroun na eleko na ye ya kitoko té. Na kati ya mpasi oyo eutaki na maponami, bitumba ya bokabwani na Nord-Ouest mpe misala mya terorisme na Nord, mboka ya Afrika ya katikati ezali na eleko ya makama. Kati na ezalela eye, nde, boyei bwa Mokonzi Ntoma Monene ut’o mokolo mwa 15 kino le 18 ya Apríli, azali kopesa elikya monene epai ya bakristu mpe epai ya mibali mpe basi banso ba motema bolamu. Na nsima ya mayebisi na polele ya mobembo mwa Pàpa Leon ya XIV ya mbala ya sima (des prochains voyages apostoliques), Mgr Andrew Fuanya Nkéa, Mokambi ya lisanga lya baepiskopo ya Cameroun, alobi ‘te “Mpo na mobembo moye, tozali kozila ya mingi”.
Yoko Lisalisi mpo na bakristu bazali konyokwama na bitumba mpe na mobulu
Mpo na Mgr Nkea, Pape ayei na Cameroun, “liboso nayino lokola ntoma ya kimya mpe ya boyokani”. Yango emonisami na nzela oyo aponaki ntango azalaki na ekólo yango. Pápa akokende na Yaoundé, Douala mpe Bamenda. Bingumba bisato ya minene, kasi mingimingi bingumba bya kala ya ekólo. Na Bamenda, mboka-mokonzi ya etuka ya Nord-Ouest, Mokonzi monene ya Eklezia akoya kopesa libondisi na etuka oyo ezali konyokwama na mobulu ya Boko Haram, mpe na bitumba biye bizali kosalema na bituluku bya batomboki na etuka ya Sud-Ouest. Na yango, episkopo-mokonzi ya Bamenda amonisaki botóndi makasi oyo azali na yango epai na Pápa Léon XIV na ntina na likambo lyango. “Ezali eloko ya motuya mpenza ‘te Tata Mosantu atikalaki na ndako te, kozela ‘te makambo makita, azwi mokano ya koyà ata makambo mazali nayino ya moto-moto. Yango wana tozali na esengo mingi”, elobi yé.
Pàpa azali koyà na Cameroun lokola Mokengeli mpate mpe mosàli mwa Nzambe
Lisusu, banda maponomi mya mokonzi ya mboka ya 12 ya sànzà ya Okotobe ya mobù 2025, kimya ya mopelengano to politiki ezali te na Cameroun. Atako ba résultats ya maponomi elobaki ‘te Paul Biya nde alongi maponomi, kasi opposan Issa Tchiroma Bakary abelelaki ‘te ye nde alóngi, mpe alobaki ‘te maponomi mazalaki ya lokuta. Na kati ya matata oyo ebimaki nsima ya maponomi, bato ba politiki bazalaki na makanisi ekeseni. Bazali kofunda bango bipai binso, mpe mobulu ezali kobakisama na mboka mobimba. Kati na likambo liye, Pápa azali koyà lokola ntoma ya kozongisa boyokani, ebeti nsete Mgr Nkéa. “Pape ayei lokola moto ya politiki te to bobele lokola mokonzi ya mboka te, kasi liboso lokola Mokengeli mpaté, lokola moto to mosàli mwa Nzambe”.
Kolengele ekwelà eye na lisalisi lya losambo
Mpo ya kolengela malamu boyei bwa Molandi mwa Kristu, Mgr Nkea abyangi bandeko ba yé ya mboka, bamilengele mpe na molimo. “Bósambela mpo ‘te tata Mosantu ayà mpe azonga na mobembo mwa yé na boboto mpe kimya”. Libolo lya “banungu-nungu oyo epanzanaki mpo na kolobela mobembo monà mabe”. Mokambi ya lisàngà lya baepiskopo ya Cameroun asengi na mibali mpe basi ya mboka na ye ‘te “Botala mobembo mwa Pàpa na miso malamu (...) ba kotalela yango lokola mosala mwa Nzambe mpo na bolamu bwa bato ba-Cameroun”.
Wayambo akebisi bandeko baekolo ya yé to bana-mboka na ye na likambo lya kobakisa makambo ya politiki na likambo liye. Episkopo-Mokonzi ya Bamenda asukisaki na koloba ‘te; “Tata Mosantu akoki te koya na mboka na biso mpe atiki bisi sé bongo na likambo la biso”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.