Na sànzà ya Febwali, Pàpa asengi losambo mpo ya bana bazwami na bokono bozangi libiki to ekoki kobikisama te

Likanisi lya losambo la Tata-Mosantu mpo ya sànzà ya Febwali, ezali mpo na bana bazwami na maladi to bokono boye bokoki kobikisama té. Liyebisi liye liwuti na kampanye «Sàmbela elongo nà Pàpa». Leon XIV abeleli ‘te ; «Mokonzi, ólakisa to ótangisa biso tóyeba komono elongi ya yo, o kati ya mwana moko na moko azali kobela to azali na bokono»

Bansango ya Vatikan

 

«Mpo na bana bazwami na bokono ezangi libiki to oyo ekoki kosila te» ; Ezali bongo mokano Pàpa Léon XIV azwi mpo na sànzà ya Febwali. Likanisi liye epesamaki na Réseau Mondial ya nsambo ya Pàpa (Prière du Pape), na boyokani nà Dicastele mpo ya Communication. Na nzela ya kampanye “Bondelá elongo na Pápa», oyo ebandaki na sanza ya yambo eleki («Prie avec le Pape»lancée en janvier dernier), Tata Mosantu abyangi Eklezia mobimba mpe bato banso ba motema bolamu ‘te básangana na losambo mpo na bana baye bazali na mpasi makasi mpe bazali na makoki te. Bàsambela mpe mpo na mabota ma bango mpe mpo na baoyo bazali kobatela bango

Kati na nsambo na ye, Pápa atyaki likebi mingi to mpe abendi makanisi ma bato likoló lya boboto bwa Yezu oyo ayambi bana mike. Amonaki ‘te o kati ya nzoto ya bango ya petepete, ezali elembo ya bozali bwa ye mobimba mpe kati na koseka na bango, litatoli ya Bokonzi. Tata Mosantu asengi ‘te “bazanga te lisalisi lilamu ya monganga ezangela bango te, lisungi lya bato mpe lisungi lya bolingo bya bato ba mboka”. Apesi na losambo mpe mokumba ya mabota, mpo ‘te bàkoka kolendisana na elikya. Bongo Asambeli mpe mpo na ba minganga, balifulume mpe baye bazali kosunga bango, mpo ‘te mosala mwa bango ezala ntango inso elembo ya boyokeli mmawa, ya motema molai mpe ya boboto.

Na mokano moye, Pape Léon XIV asengi na Eklezia mobimba ebongwana mpo na «likanisi liye sé moko» ya Motema mwa Kristu mpe, oyo esimbami na losambo mpe na mosala mpo ‘te esunga bolembu, mpo ‘te ekoma, atako «o kati ya minyoko to mawa, liziba lya libondi, mbuma ya elikya mpe nsango ya bomoi bwa sika» mpo na bana oyo bazali konyokwama mpe mpo na baoyo bazali zingazinga na bango.

Na video ya sànzà ya Febwali, oyo bazwaki na ndakonzambe ya San Pellegrino na Vatikan, tokoki komona Tata Mosantu asimbi bililingi. Bisusu kati na yango esalemaki na bana oyo bazali na bokono ndenge na ndenge mpe bazali na lopitalo ya bana oyo babengi: Bambino Gesù na Rome.

Nzokande ezali mbala ya yambo te ‘te Pápa, na nzela ya Réseau Mondial de Prière, àbondela mpo na bato baye bazali konyokwama na bokono to maladi ndenge na ndenge. Na 2024, na bokonzi ya Pàpa François, mokano mwa sànzà ya Febwali epesamaki mpo na bato ba maladi oyo bazali na nsuka ya bomoi bwa bango (aux malades en phase terminale). Na kati na yango, amonisaki polele bokeseni oyo ezali kati na «maladi ekoki kobikisama te » mpe na «oyo ezangi kozwa lisalisi». Abetaki nsete mpe alobaki ‘te «ata soki likoki ya kobika ezali moke, mokono nyoso to moto nyonso ya maladi azali na lotomo ya kozwa lisalisi ya monganga, ya makanisi, ya elimo mpe ya bomoto».

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

05 sánzá ya míbalé 2026, 21:31