Luka

Na sànzà ya Yanuali, Pápa asengi básambela nà Liloba lya Nzambe

Léon XIV alendisi ‘te bázongela losambo. Toyekola losambo na koyoka mokolo na mokolo Makomi Masantu. Na lisalisi ya bilili (video), ezali kolakisa mikano mya ye ya losambo mpo na sànzà ya Yanuáli. Na yango, afungoli mosala ya “Bondelá elongo na Pápa”, ezali mokona azali kolanda oyo Pápa François abandisaki esili koleka mibu zomi mpo na kosangana na molimo na nzela ya losambo elongo na Mokonzi nganga-nzambe monene.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Reseau mondiale ya losambo la Pàpa mpe dicastere mpo na Communication, basakolaki na ndako ya bopanzi nsango ya Saint Siège, mokolo mwa misato, mwa sambo (7) ya sànzà ya yanuali, ‘te bazali kosala mosala ya sika mpo na etindà ya Santu Pàpa na likambo ya “Bondela elongo nà Pàpa (Prie avec le Pape)”. Kobanda sànzà eye kino, lolenge azali kokoba mosala Pàpa François, Leon XIV akobanda kokabola makanisi ma ye ya losambo, sànzà na sànzà na nzela ya bilili (video), oyo ezali sikawa na makoki ya kobetisa na kati ya lokota ya Italia, ya Espagnole mpe ya Lingelesi. Azali kobyanga eklezya ya mokili mobimba  mpe bato banso ba motema bolamu na kosangana se na losambo linà na molimo, oyo yemei akokumbaka.

Makambo maye manso masika mokosalema mpo ya kopalinginya na bolayi mpe  bisika ebele, makanisi ma losambo la Pàpa. Lolenge malamu ya kokota na losambo mpe ya kokoma na bisi bakristu bayiké bazwami na mokili mobimba. Ezali malamu mingi mpenza, mpo na eleko eye ya communication digitale.

Na mobù moye 2026, Pàpa asengi kosambela nayino nà liloba lya Nzambe

Mosala ya “Bondela to sambela elongo nà Papa”  ebandi mokolo mwa misato na likanisi lya liboso la losambo ya mobu 2026: “Mpo na losambo nà liloba lya Nzambe”, oyo ezali kobenga mpo na komona lisusu nguya ya elimo ya Makomi Masantu lokola esika ya lokumu mpo na kokutana elongo nà Klisto.  Na liyebisi liye ya liboso, Pàpa Leon XIV apesi likanisi ya yoko losambo, ekotalela Liloba lya Nzambe lokola mwinda mpo na bososoli,mpamba te ezali bilei na ntango ya bolembu, elikia na kati ya molili mpe moboko(fondement) mwa Eklezia oyo etongami likolo ya Nsango Elamu.

Libondeli lya Tata Mosantu ezali kosenga ngolu ya koyekola koyoka mokolo na mokolo makomi, kotika yango ebeta biso mpe kotika yango etambwisa bikateli to mikano ya moto ye moko mpe ya bato banso. Emonisi mpe bonene bwa etinda ya Liloba la Nzambe, oyo ezali kokómisa mondimi moko na moko moyekoli oyo azali kosala mosala, oyo ayebi kolimbisaka, oyo azali kotonga gbagba, mpe oyo azali kosakola bomoyi.

Mpo na maye matali Resau Mondiale ya Losambo la Pàpa

“Sambela to bondela elongo nà Pàpa”, ekomonana na site internet mpe na ba plateforme ya internet ya Réseau Mondial ya losambo la Pàpa na site web .

Réseau Mondial ya losambo la Pàpa ezali mokumba ba pesi na lingomba ya Societe de Jesus mpo etambwisama. Ezwami na bikolo koleka tuku libwà (90 pays) na mokili mobimba. Esangisi na elimo bato koleka bamilio tuku mibale na mibale (22) oyo bazali koluka biloko ya kobikela mpe bazali na mposa ya kosala elongo na Kristu mpo na kokokisa mokumba mwa ye. O kati ya mosala moye, ezali na maloba ya mabondeli ya sànzà na sànzà ya Pápa, oyo ezali kosenga ‘te tótalela mikakatano oyo bato bazali kokutana na yango mpe mosala ya Eklezya.

Ebandaki na mobù 1844 na kombo ya “Apostolat ya losambo”, emonisami lokola Fondation ya Vatican na Papa François na sànzà ya zomi na mibale ya mobu 2020, na ndingisa ya mibeko mya yango ya suka na sanza ya Yuli ya mobu 2024.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

07 sánzá ya yambo 2026, 20:57