Mpó ya Mokolo mwa mokili mobimba ya bakoni, Pàpa asàmbeli na Mobenga ya Lurde ya Vatikan
Bansango ya Vatikan
«Ezali mokolo kitoko mpenza mokokundola biso bozali pembeni ya Maria, Maman wa biso, oyo akotambola na biso elongo seko; mpe akoteya biso makambo mayiké : lokola ‘te, elimboli nini bokono to minyoko, bolingo ezali nini, elakisi nini kotika bomoi bwa yo na maboko ma Mokonzi». Ezali bongo maloba Pàpa Leon wa XIV alobaki na etuluku ya bato ba maladi(bakoni) baye bazalaki kozila ye na ntongo ya mokolo mwa misato, mwa 11 Febwáli, na Mobenga ya Lurde, na kati ya lobàlà la lopango la Vatikan.
Yoko Kandela epeli mpo ya bakoni banso
Mokonzi ntomà monene akendaki, lokola esakolamaki, na tango ya likita lya banso, nsima ya kotika salle Paul VI. Liboso lya ekeko ya Maria Ngondo Seko ya Lurde, Léon XIV apelisaki kandela to buji lokola elembo ya losambo la yé “mpo na bato banso ba maladi(bakoni), oyo tokanisi lelomei na bolingo mpenza, na mokolo moye mwa bato ba maladi na mokili mobimba”, lolenge alobaki na likita lyango.
Losambo mpe Bobenisi bwa Pàpa
O mokolo moye ya bato ba maladi, Pápa ayebisaki bato bazalaki liboso lya Mobenga ‘te, “Tolingi kobondela na bomoko na bato banso baye bazali konyokwama na mokili mobimba. Tozali kobondela mpo na bino.
Pàpa alobi: “Nazali kotondo bino botondi na motema mwa ngai mobimba mpo na molende bosali mpo ya kosangana nà biso na ntango eye ya losambo, awa liboso lya Mama wa biso Maria, na eyenga ya Milulu mya Mama wa biso ya Lurde (Notre-Dame de Lourdes”. Na nsima, abenisaki bato banso, ata mpe minganga, balifulume, mpe basungi bya minganga. Na libaku lyango, basambelaki losambo la Losako Maria.
“Tosengi bobenisi bwa Mokonsi mpo ya bino, mpe likolo lya bato banso ba maladi lelo mpe mikolo minso seko, likolo lya minganga minso, balifulume binso, bato bayiké oyo bazali penepene na biso, mingi mingi na ntango ya mpasi makasi.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
