2026.02.11 Leon ya XIV na losambo  mpe na kopesa lokumu na Maria Seko Ngodo, na libakù lya Mokolo mwa mokili mobimba ya Bakoni, na Lobàlà ya Vatikan 2026.02.11 Leon ya XIV na losambo mpe na kopesa lokumu na Maria Seko Ngodo, na libakù lya Mokolo mwa mokili mobimba ya Bakoni, na Lobàlà ya Vatikan  (@Vatican Media)

Mpó ya Mokolo mwa mokili mobimba ya bakoni, Pàpa asàmbeli na Mobenga ya Lurde ya Vatikan

Nsima ya likita mpo ya Banso, lokola basakolaki yango, Leon ya XIV akendaki na lobàlà (jardin) ya Vatikan, epai wapi apelisaki kandela liboso lya ekeko ya Maria Seko Ngondo, mpe asambelaki elongo na bato bamaladi to bakoni oyo bazalaki wana, mpo na libakù lya mokolo mwa mokili mobimba ya Bakoni. Ezalaki mpe bokundoli bwa eyenga ya Notre-Dame de Lourdes. Asengaki bobenisi bwa Nzambe mpo na Minganga, balifulume nà mpe baye banso bazali pembeni ya bato bazali na bokono.

Bansango ya Vatikan

 

«Ezali mokolo kitoko mpenza mokokundola biso bozali pembeni ya Maria, Maman wa biso, oyo akotambola na biso elongo seko; mpe akoteya biso makambo mayiké : lokola ‘te, elimboli nini bokono to minyoko, bolingo ezali nini, elakisi nini kotika bomoi bwa yo na maboko ma Mokonzi». Ezali bongo maloba Pàpa Leon wa XIV alobaki na etuluku ya bato ba maladi(bakoni) baye bazalaki kozila ye na ntongo ya mokolo mwa misato, mwa 11 Febwáli, na Mobenga ya Lurde, na kati ya lobàlà la lopango la Vatikan.

Yoko Kandela epeli mpo ya bakoni banso

Mokonzi ntomà monene akendaki, lokola esakolamaki, na tango ya likita lya banso, nsima ya kotika salle Paul VI. Liboso lya ekeko ya Maria Ngondo Seko  ya Lurde, Léon XIV apelisaki kandela to buji lokola elembo ya losambo la yé “mpo na bato banso ba maladi(bakoni), oyo tokanisi lelomei na bolingo mpenza, na mokolo moye mwa bato ba maladi na mokili mobimba”, lolenge alobaki na likita lyango.

Pàpa apelisi Kandela moko mpo ya bakoni
Pàpa apelisi Kandela moko mpo ya bakoni   (@Vatican Media)

Losambo mpe Bobenisi bwa Pàpa

O mokolo moye ya bato ba maladi, Pápa ayebisaki bato bazalaki liboso lya Mobenga ‘te, “Tolingi kobondela na bomoko na bato banso baye bazali konyokwama na mokili mobimba. Tozali kobondela mpo na bino.

Tata Mosantu na Losambo liboso lya Mobenga ya Lurde, na lobàlà lya Vatikan
Tata Mosantu na Losambo liboso lya Mobenga ya Lurde, na lobàlà lya Vatikan   (@Vatican Media)

Pàpa alobi: “Nazali kotondo bino botondi na motema mwa ngai mobimba mpo na molende bosali mpo ya kosangana nà biso na ntango eye ya losambo, awa liboso lya Mama wa biso Maria, na eyenga ya Milulu mya Mama wa biso ya Lurde (Notre-Dame de Lourdes”. Na nsima, abenisaki bato banso, ata mpe minganga, balifulume, mpe basungi bya minganga. Na libaku lyango, basambelaki losambo la Losako Maria.

“Tosengi bobenisi bwa Mokonsi mpo ya bino, mpe likolo lya bato banso ba maladi lelo mpe mikolo minso seko, likolo lya minganga minso, balifulume binso, bato bayiké oyo bazali penepene na biso, mingi mingi na ntango ya mpasi makasi.

““Tosengi bobenisi bwa Mokonsi mpo ya bino, mpe likolo lya bato banso ba maladi lelo mpe mikolo minso seko, likolo lya minganga minso, balifulume binso, bato bayiké oyo bazali penepene na biso, mingi mingi na ntango ya mpasi makasi.”

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

12 sánzá ya míbalé 2026, 10:31