Angélus: Tómonisa motema mawa mpe Boyambi na Noele, lokola Yozefu
Albys KBD, CP – Kinshsa/RDC
Na mokolo mwa lomingo ya minei ya Advenire, Pápa abengaki bandimi na kokanisa na ntina na moto ya Santu Joseph. Liturji ezali komonisa ye “ntango Nzambe alakisaki ye, na kati ya ndoto, etinda ya ye” (Tala na mokanda mwa Mat. 1, 18-24). Nsango Elamu ya mokolo mwa lelo ya Sango Mateyo ezali kolobela moto moko ya “mpamba lokola biso, kasi azalaki mpe na mpiko mpe na boyambi makasi”.
Yosefu moto semba, ya boboto, moto wa Nazarete, atondisami na bomikitisi mpe bomoto. Manso, mamonisami na ezalela ya ye tango anzelu ayebisaki ye likambo ya kokamwa oyo esalemaki na libumu ya Maria. Papa alobi ‘te: “Lokola akutanaki na likambo moko oyo ezalaki mpasi mpo na kososola mpe kondima yango, aponaki te nzela ya kofinga mpe ya kokweisa mwasi na ye na miso ya bato banso, kasi aponaki nde nzela ya kobwaka ye na bonkuku, na mayele mpe na boboto”, (Mat. 1, 19). Na kosaláká bongo, Yosefo amonisaki ‘te aponi mabongi malamu ya boyambi bwa ye, mingi mpenza oyo ya motema mawa.
Nganga-nzambe monene alobaki lisusu ‘te: “Boboto mpe bizaleli malamu ya ye emonanaki polele ntango Mokonzi amonisaki ye na ndoto mwango mwa Ye ya libiki, mpe ayebisaki ye mokumba moye, kokóma mobali ya Ngondo, Mama wa Mesiya”. Yozefe, “na likambo lya boyambi bwa ye monene, atikaki esika ya nsuka oyo ayebaki ete akozala na bomoi ya malamu mpe amipesaki mobimba na makambo ma Nzambe”.
Papa alobi t’e: “Motema mawa mpe bolingo, motema ngolu mpe komipesa: ezali ezaleli malamu ya moto wa Nazareti oyo liturgie ezali kopesa biso ndakisalelo, mpo ‘te akoka kokamba biso na mikolo miye ya nsuka ya Adventi, kino na Eyenga ya Mbotama Mosantu”. Léon XIV abengaki bakristu ‘te balanda ndakisa ya Joseph mpe bizaleli na ye, mpamba te “eteyaka mitema mpo na kokutana nà Kistu mpe na bandeko na biso, mpe oyo ekoki kosalisa biso na kozala, mpo na basusu, esika ya koyamba bapaya, ndako ya boyambi bapaya, elembo ya kozala ya Nzambe”.
Papa alendisi moto nyonso ‘te azanga te libaku, na ntango oyo ya ngolu, ya kosalela bizaleli biye: “Kolimbisa, kolendisa, kopesa mwa elikya na bato tofandi na bango mpe baoyo tokutani na bango; mpe kozongisa lisusu na losambo bomipesi bwa biso ya bana epai ya Mokonzi mpe na Providence na ye, kotikela Ye nyonso na motema mobimba”.
Na bosukisi, yambo ‘te asala losambo la Angelus, Pàpa alobaki: “Tika ‘te baye bazalaki liboso na boyambi makasi mpe na bolingo monene: Ngondo Maria mpe Santu Yosefu, na koyamba Yezu, Mobikisi ya mokili, basalisa biso na yango”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye
