Luka

Leon XIV abenisi «Bikeko ya bana-Yezu»

Ezali momeseno moko moùti bandà mobù 1969, na eleko ya Eyenga ya Mbotama, tango Pápa abenisaki bikeko ya bana-yezu ya mike. Ezali elembo ya Yezu, oyo mabota ya Roma bakotya kati na bandako ba bango na butu ya Eyenga ya Mbotama (na Noele). O mokolo mona ya lomingo la minei ya loyà, Léon XIV asengaki na bango, babondela mpo ‘te bana banso ya mokili bazala na kimya.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Na nsuka ya losambo la Maria ya Angelus, Pápa abenisaki “ba Bambinelli” oyo bamemaki na Esika Saint-Pierre na bana mpe bilenge pene ya 1 500. Bautaki na ba oratoires mpe na ba parwasi ya dioseze ya Roma, epai wapi Leon XIV azali episkopo. Na mbul’oyo, mpo na ntina mosusu, bobenisi esalemaki na mokolo ya lomingo ya minei ya Adventi (Loya to Boyei), kasi na mokolo mwa lomingo la misato te, lokola momeseno. Ezalaki mpo ya Zubilé ya bakangami to bato na boloko, oyo esukaki na wikende eleki.

Na butu ya Noele, bakotya bikeko ya bana-Yezu na bisika ya baeleyelo ya mabota epai wapi bafandi. Basalki yango na bandaku ba bango kobanda mokolo mwa immaculée Conception, 8 Desembe, mokolo moye. Bakolandaka bongo momeseno ya bonkoko ya Ba-Roma, mpo na  kokanisa kobotama ya Yezu.

Na libaku liye, Léon XIV abengaki bana, bilenge mpe mikóló, na mokolo mwa lomingo moye na midi, mpo na kobondela liboso ya crèche, mpo ‘te “bana banso ya mokili báfanda na kimya”. Papa alobi ‘te: “Mpo na bana ya Bambinelli mpe mpo na boyambi bwa biso na Mwana Yezu, tika ‘te Tata, Mwana mpe Elimo Santu bapambola bino ntango inso”.

Na place  Saint-Pierre, Ba-Roma basangani mpe batomboli bikeko bya Bana-Yezu ba bango, mpo na kozwa bobenisi bwa Tata Mosantu
Na place Saint-Pierre, Ba-Roma basangani mpe batomboli bikeko bya Bana-Yezu ba bango, mpo na kozwa bobenisi bwa Tata Mosantu   (@Vatican Media)

Momeseno eùmeli mibù tuku mitano (50 ans)

Kopambola bikeko ya bana-Yezu “Bambinelli”, ezali momeseno mobandaki ut’o Paul VI. Ezalaki o mokolo mwa lomingo la misato ya eleko ya Adventi, oyo ebengami “Lomingo la Nsai to lomingo la Gaudete” ya mobu 1969, nde Pápa Montini apambolaki mpo na mbala ya yambo na Angelus bikeko ya mwana -Yezu oyo esengelaki kotyama na bisika ba crèches ya bana ba Roma. Ut’o mokolo mona, mbula na mbula, bana, bateyi ya katekisimo, basango mpe mabota ya dioseze ekosalaka mbala na mbala molulu mona.

Na bambula oyo euti koleka, momeseno yango epalanganaki na bamboka mingi ya Italie mpe na mokili mobimba, epai bankama ya bato ba mangomba mpe ya badiosezez, baepiskopo mpe banganga-Nzambe baponaka mokolo mwa lomingo la misato mpo na koyamba mabota, basakoli mpe basango ya baeklezya ya mboka. Basalaka yango mpo na kozala elongo mwa tango moke, mpo na kosepela mpe kosambela elongo mpe kozwa bobenisi ya bana-Yezu “Bambinelli”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

22 sánzá ya zómi na míbalé 2025, 08:57