Léon XIV: “Tiká ‘te lolaka la bato bazali kati na minyoko ya bitumba etombwama lokola libondeli”
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Na mbote apesaki bato bamobembo bautaki na Pologne mpe na bakristu oyo balobaka lokota ya Arabe, na likita linene la mokolo mwa misato, mwa zomi ya sànzà ya setémbe (10 Septembre), Pápa Léon XIV asengaki ‘te bábondela mpo na bana oyo bazali konyokwama na bitumba, mingi mpenza na Ukraine mpe na Gaza. Alobaki ‘te: “Bokanisa na bansambo ya bino mpe na misala mya bino ya kosalisa bana ya Ukraine, Gaza mpe biteni bisusu ya mokili oyo ebebisami na bitumba”.
Ntango azalaki koloba na bato ya Pologne oyo bayaki na misa, Pápa akanisaki bango mokolo mwa bato ya Pologne oyo bakufaki na bitumba, mokolo oyo bakanisaka mpasi ya bana mpe ya bato oyo bakufaki na bitumba. Mpe lisungi na bango mpo na kotonga lisusu Pologne nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Pápa abakisaki nakoloba ‘te: “Nazali kopesa bino mpe bana oyo bazali konyokwama lelomei, na tiki bango na maboko ya Maria, Mokonzi-mwasi ya Boboto”.
Losambo mpo na Mabele Masantu (Terre sainte)
Tango azalaki koloba na bakristu oyo balobaka lokota ya Arabe, Episkopo ya Roma abondelaki mpe mpo na bato banso oyo bazali konyokwama na mobulu oyo ezali koleka na Moyen-Orient. “Nazali kosenga na bino ‘te bobongola boleli bwa bino (lolakà la bino) na ntango ya mikakatano to mimekano mpe ya mpasi, na mabondeli ya elikya, mpamba te, Nzambe ayokaka seko bana ba yé mpe akoyanolaka bango na ntango amoni ‘te ezali malamu mpo na biso”. Abakisaki na koloba ‘te: “Tiká ‘te ngolu ya Mokonzi ezala na bino banso mpe ebatela bino ntango inso na mabe manso”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
