Basangani ya Likita ya yambo ya mikili mpo na mateya ya Katoliko na Afrika, oyo elengelami na nzela ya SCEAM Basangani ya Likita ya yambo ya mikili mpo na mateya ya Katoliko na Afrika, oyo elengelami na nzela ya SCEAM  

Likita ya yambo ya mikili mpo na mateya ya Katoliko na Afrika

Symposium ya ba Conférences épiscopales ya Afrika mpe Madagascar (SCEAM) esangisi bato koleka nkàmà moko oyo basalaka na elanga ya kotangisa na lingombà ya Katoliko, mpo na likita ya yambo ya mikili, bàndà mokolo mwa 6 kino 8 ya Agusto na Addis-Abeba, na ekolo Ethiopie. Likanisi motuya ezali: «Kokolisa mateya ya Katoliko mpo na bokóli bwa bomoto na mobimba mwa ye, na Afrika». Likita liye lizali na mokano ya kolobela likanisi ya bokokani mpo na mikolo mizali koyà, ya mateya ya Katoliko na Afrika.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Bibongiseli ya ba episkopo mpe masànga ya ba episkopo ya Afrika mpe bisanga ya zingazinga ezali kobongisa likita na yango ya yambo ya kontina, mpo na mokano ya kotala lisusu mateya ya Katoliko na Afrika. Esangisi baepiskopo oyo bazali na mokumba ya mateya na Afrika mobimba, batindami ya ba eteyelo ya likóló (iniversiteà ya Katoliko, ba komisio nationales mpo na mateya ya Katoliko, ba mangomba ya losàmbo (Congrégations religieuses), bato ba mayele oyo balukaka, bato ya misàla ya bontóki mpe baninga bisusu bakosàlàka elongo. Na ebandela ya sànza eye ya Agusto, bato koleka 100 bazali na likita oyo ezali kosalema na Addis Abeba, na Ethiopie.

Na kolanda liyebisi, likita liye ezali kokisi mokano ya likita ya mbala ya tukù mibale (20è) ya SCEAM, oyo esalemaki na Kigali na sànza ya Yuli ya mobu 2025. Ezali mpe na mokano ya «kokólisa esengo ya kosàla mosàlà elongo na kati ya kontina» mpe ya kozwa mokano ya «kopesa nzela na mateya ya Katoliko». Kotangisa ezali lokola «esaleli oyo ezali na ntina mingi mpo na koteya bato Nsango Elamu, mpo na kokolisa bomoto ya bato mpe mpo na kobóngola bomoi bwa bato na Afrika mobimba mpe na bisanga bya yango ».



Kopesa biyano na mikakatano ya kotangisa lelomei

Na boumeli ya mikolo misato ya mosala, bayangani bakosólola, bakosàla makindo, bakolanda masolo ya bato banso, bakosala masolo ya bituluku mpe ya bato nyonso, mpe bakotalela makambo minene mya ntina oyo etali mateya ya Katoliko.

Bokaboli masólo mànà ekozala mpe na mpó ya “bomoto ya katoliko, bokambi mpe botambwisi, kobongisama ya balakisi, bokasi ya mbongo, transformation nimeriki mpe mayele ya bomoto (AI), ba eteyelo ya likolo mpe mayele ya bolukiluki ya Katoliko, kobatela bana, kobatela ezingelo, mpe kopesa biyano ya sika na mikakatano ya sika ya kotangisa”.

Mokano mpo na mbula mitano mikoyà

Moko ya mikano ya liboso ya likita lyango ezali ya kobongisa “mokanda moko mpo na mateya ya Katoliko na kontina mobimba mpo na etambwisi ya mibù mitano, kobanda na mobù 2026 kino 2031. Mokanda mwangó ekomonisa “makambo mya ntina mpe ba recomandations oyo ezali komonana” mpo na ba eteyelo ya Katoliko na kontina mobimba.

Basangani bakokóba mpe bomanyoli bwa bang ona likambo ya kokéla komisio moko ya SCEAM mpo na likambo ya kelasi, oyo esengeli ekóma “ebongiseli moko ya libela na Afrika mpo na kobongisa makambo matali mateya ya Katoliko na Afrika”.

Na nzela ya likita oyo ya liboso na kontina, SCEAM elingi kokólisa mosàla ya mateya ya katoliko na kati ya etindà ya Eklezya na Afrika. Na kopesa nzela na kosàla mosàlà elongo kati na bato oyo basalaka na biteyelo, mokano ya ebongiseli yango ezali ya kokómisa eteyelo ya Katolike esika ya kopesa bato formasyo ya malamu. Manso mpo na mosàlà ya kopalinginya Nsango Elamu, ya kokólisama ya bomoto mpe ya kobongwanisa ba sociétés ya Afrika.

 

Matondo mingi na ndenge otangi lisóló liye.

07 sánzá ya mwambe 2026, 13:30