SCEAM: Eklezia na Afrika ezali komilengele mpo na Liyangani Monene ya eklezya ya mobù 2028 ut’o Addis-Abeba
Albys KBD, CP – kinshasa/RDC
Likita liye likowumela mikolo mibale, esangisi bakambi ba Eklezia ya katoliko, bato ya teoloji, bakambi ya mangomba mpe batindami ya ba masangà ya baepiskopo mpe ya ba institutions ya Eklezia ya Afrika mobimba mpe bisanga bya yango. Elengelami na SCEAM oyo ezali kolimbola na lokotà ya lingàla ‘te (Symposium des Conférences Épiscopales d’Afrique et de Madagascar). Mokano mwa yango ezali mpo ya koyeba lolenge kani tokoki kopesa mabókó na mobembo ya mokili mobimba oyo ezali komema na likita to liyangani monene ya Eklezya na mobù 2028.
Kolendisa bopesi mabókó ya Afrika
Na kozwa makanisi na lolenge Synodi ya mokili mobimba elekaki na (2021-2024), SCEAM alimboli ‘te, liyangani ya mbala eye ekozala libaku ya kotalela makambo ya ba-synodi oyo esalemi na Afrika, koyeba makambo oyo esengeli kotiya na esika ya liboso mpo na mikolo mizali koyà, mpe kolendisa lisungi (bopesi mabókó) ya Afrika na etamboli ya Eklezya ya mokili mobimba mpo na kokóma eklezya ya lisàngà mpe ya misio.
Séminele oyo ezali libakù ya kosambela, koyoka na bokebi bonso na ntina ya kotala mbuma oyo emonani na nzela ya synodi, mpo ya kozongisa matondi na Nzambe. Mpe na nsima, kosósóla elongo boni boni Nzambe azali kobyanga Eklezia na Afrika mpo na kosàlela Kontina mpe Eklezia ya mokili mobimba. Bokutani bónà ekobaluka nzinga nzinga ya makambo to mpe mikano mitano ya motuya: - kotalela lolenge kotambola na lisàngà ezali kosalema na Afrika; - kokanisa na makabo maye Eklezya ya Afrika ekopesa na Eklezia ya mokili mobimba; - koyeba bilembo bya sika biye bimonisami na nzela ya sinodi ya ba misio; - mpe kokabola makambo maye masalemi mpe bikela to misàlà malamu ya baetukà ; - mpe kopesa maboko na kobongisa mokanda moko ya mosala ya kontina oyo ekotambwisa bolengeli bwa Afrika na Liyangani monene to Assemblée ecclésiastiki ya 2028.
Losambo, Masóló, mpe bosósóli mpo na koyeba o bozindo likambo ya Sinodi
Ut’o bofungoli bwa likita liye, basangani na yango bamipesi na losambo, masóló ya molimo, makita minene mpe misàlà elongo. Manso mànà masalemi mpo na kokólisa bosósóli na kati ya lisangà mpe koluka boyokani. Ba délégué ya bituka mwambe ya SCEAM, bazali na kati ya ndulu na bango, ba presentations na nzela ya feuille de route mondiale mpe ya mikili mpo na ba mayangani mya baeklezya, na mibù 2027-2028, ba matatoli ya ba conférences épiscopales régionales mpe ba initiatives ya eklezia, mpe ba sessions ya collaboration mpo na kokabola ba expériences na bango mpe koyeba ba priorités ya solo mpo na Eklezia na Afrika.
Baoyo basanganaki na likita yango basepelaki mingi na ntina na boyokani kati na bango na elimo santu. Na nzela ya bilembeteli ndenge na ndenge, tomonaki ndenge oyo Mokonzi ye moko azalaki kotambwisa basaleli ba ye na masangá ndenge na ndenge. Bokebi epesamaki mingi mpe na bofungoli ya nzela ya kobongwana ya libela oyo epesamaki na mokanda mwa nsuka ya Synode.
Likita lyango ekosuka na makanisi ma ntina mpe mokanda ya kontina oyo ekotambwisa biteni ya nsima ya etamboli ya sinodi ya Afrika mpe ekopesa maboko to ekosalisa mpo na kobongisa to kolengela Liyangani Monene ya Eklezya (Assemblée ecclésiale) ya mobù 2028 na Roma.
Matondo mingi na ndenge otangi lisolo liye