Leon ya XIV akei kotala sanctuaire ya Bosatu Bosantu

Ndako ya bopanzi nsango ya Vatikanepesaki liyebi o mokolo mwa 22 ya sànzà ya Yuli, ‘te : na tongo, Pàpa akendaki kotala esika ya losambo oyo bakumisaka Bosatu Bosantu, oyo ezwami na mindelo kati na Lazio mpe Abruzzi.

Bansango ya Vatikan

 

Mikolo mibale sima ya kokende na yé na monastele ya Mont-Cassin ya ba benedictins, Pàpa akendaki lisusu kotala na mbalakaka esika ya losambo ya Bosatu Bosantu ya Vallepietra (sanctuaire de la Très Sainte Trinité). Leon akendaki na tongo na ngambo ya Moniele ya Lazio, na mwa lingomba moko moke, ezwami na mindelo ya Lazio nà abruzzi. Ezali na likolo ya ngomba pene na 1400 metele ya molayi, na Colle ya Tagliata.

Lolenge ya komona sanctuaire ya Valleprietra
Lolenge ya komona sanctuaire ya Valleprietra   (@Vatican Media)

Ezali na esika wana nde, Pàpa atelemaki mpo na kobondela liboso lya elilingi (fresque) oyo ezali na kati ya ndako mosantu ; elobi ndako ya bopanzi sango ya Vatikan, na ntongo, na compte Telegram na yango. Na nsima, azwaki ntango ya kopesa mbote na bayambi basusu mpe na basàngó.

Mbote ya Pàpa na bayambi bayanganaki libanda ya sanctuaire ya Vallepietra
Mbote ya Pàpa na bayambi bayanganaki libanda ya sanctuaire ya Vallepietra   (@Vatican Media)



 

Matondo mingi na lolenge o tangi lisolo liye

22 sánzá ya nsambo 2026, 23:27