Luka

Tango akendeki kotala monastele ya Mont Cassin na bonkutu na mokolo mwa 20 ya sànzà ya Yuli 2026 Tango akendeki kotala monastele ya Mont Cassin na bonkutu na mokolo mwa 20 ya sànzà ya Yuli 2026  (ANSA)

Pápa abondeli mpo na kimya, na lilita lya Santu Benoît

Na bokutani moko, na ntongo ya mokolo mwa yambo, mwa 20 sànzà ya Yuli, na monastele ya Mont-Cassin, na Lazio, Pàpa asambelaki na lilita ya mobandisi ya lingomba (Ordreà) ya ba benedictin. Basalaki losambo la Sexte, bongo akendeki kotala mikanda ya kala mpe ndako ya mikanda to biblioteke, mpe kolya elongó nà basàngó. «Tosepelaki mpe tolendisamaki na nzela toponà na Eklezia mpe na bato », elobi Abbé Luca Fallica, oyo alobeli mobembo monà lokola likabo moko oyo bakànaki te.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Liboso lya Santu Benoit, Pàpa abelelaki kimya na mokili. Ezali bongo elembo ya Leon ya XIV ; akendeki kotala monastele ya lingomba ya ba Benedictin, na Mont-Cassin, na province ya Frosinone na Lazio, na ekolo ya Italy. Lokola azali na mwa tango ya bopemi, akendaki kotala kitoko ya ezingelo na mokili, na ntaka ya bametele koleka nkama mitano. Nzokandé atelemaki mpo na kobondela na lilita ya moto oyo azali mpe mobateli ya mikili ya Mpoto. Mokonzi ya Lingomba ya ba Bénédictins, oyo eklezya ekundolaki o mokolo mwa zomi na moko moleki, ya sànzà ya Yuli. Ndako ya bopanzi nsango ya Vatikan eyebisi na nzela ya singa ya Telegram na ye ‘te : na Mobandisi ya Lingomba ya ba Bénédictins, Nganga-Mokonzi Monene atikaki mabondeli mpo ya kosenga Kimya o kati ya biteni bya mokili biye bibisami na makila mpe matata ya bitumba.

Losambo na Lilita lya Santu Benoit.

Leon Azongi bisika wapi akendaki tango azalaki moyekoli.

Ezalaki likabo liye bakanàki tè”, elobaki nganganzambe dom Luca Fallica, na Media ya Vatikan, mpamba tè ezalaki likambo ya bonkutu, ba sengaki moto na moto, kati na biso tózala nye tobomba sekelé, na lolenge ‘te boyei bonà, etungisa bato te. Solo mpenza, toyokaki to bayebisaki biso yango kaka lobi, ndé epesaki ngai nzela ya kokebisa lisanga kaka mwa bangonga liboso ya koyà ya Tata Mosantu; yango wana makambo manso masalemaki na lolenge ya pete mpe ya libota”. Nganganzambe alobaki ‘te nalibakù linà, Pàpa apesaki mbote na ba turiste mpe bampaya, na monastele oyo ya monene kati na bamonastele ya mokili, sima ya baoyo mibale ya Sainte Scolastique mpe ya Subiaco. Leon ya XIV asalaki losambo ya Sexte elongó nà lingomba ya ba sàngó , sima akendaki kotàla mikanda ya kala mpe nà ndako ya mikandà (biblioteke), mpe na sima aliaki na bango, yambo ‘te azonga na Castel Gandolfo. Dom Fallica, akobaki na koloba ‘te, “Akanisi ete Pàpa azalaki na esengo ya kokende kotala esika eye, akendàkà kotala ut’o mibù miyiké, tango azalaki nayino elenge moyekoli na Roma”.

Na esika epai wapi Paul VI abengaki Benoit “Pacis Nuntius”

Luka kimya mpe landa yango”, na eteni ya Banzembo 33 (34), lelo mei koleka mikolo misusu minso, maloba maye Saint Benoît atángaki na maloba ya ebandeli ya mibeko (Règle) mya ye, ezali na ntina mingi. Losambo la Pàpa ya Komibonza na Saint Benoit, esalemaki na esika yoko, lokola boye na mobù 1964, tango Santu Paul VI akendaki kosambela mpo ya bitumba, oyo ebukaki ndako Nzambe monene to Katedrali. Ndeomoni Paul Vi abengaki Santu Benoit, Mokengeli ya liboso ya mabele ma Eropa. Solo abengaki ye Pacis Nuntius, oyo elimboli ‘te: mosakoli ya kimya. «Lokola Paul VI, na ndakisa na ye, ba Pàpa bakitani na ye, Jean-Paul II, Benoit XVI, Pàpa Leon akei ye mpe na Mont-Cassin, lokola motamboli ya Kimya», ekobaki yé na koloba. Apelisa mwinda ya kimya lokola, lolenge Paul VI yemei amemaki yango na mobù 1964.

 

Boyambi na Monastele

Bósambela mpo ya Kimya mpe bokoma banzenenete bwa yango

Mokano ya bomipesi na kosambela mpo na kimya, ezali mokolo na mokolo mpo na basàngó wana, na nzela ya bolobeli bwa mobandisi na bango. Na eleko eye, bazali kolengela Zubilé na mobù 2029, mpo na kosepela mibù 1500 ya bobandisi ya lingomba lya bango. Ekosalema lolenge ezali momeseno mpo na abbaye oyo ya Mont-Cassin. Nganganzambe Fallica, alobi ‘te, Santu Benoit akomaki na mboka Subiaco na mobù 529. Mpe mokolo mwango etyami na elembo ya komanyola likolo ya likambo lya kimya, oyo ekolandisama na ba oyo ya mwinda mpe ya elikya. Liboso ya ezibelo monene ya lopango la biso, ezali na nkoma PAX. Bongo akobi na koloba ‘te: na ngambo moko, nkoma enà ezali koyamba kimya y abato baye bazali komata na Mont Cassin, kasi na ngambo mosusu, ekomaka mpe liyebisi oyo tozali kopesa na bato banso bayàka awa mpe bazongi. Ezali kaka likambo ya koyamba kimya tè, kasi kokoma mpe banzeneneke, basakoli bwa yango, bisika biye tóvandi”. Mpe eleki bobele mikolo zomi, Episkopo wa lokumu Pierbattista Pizzaballa, Patriarche ya Latin ya Yeruzaleme, azwaki libonza ya Pacis Nuntius, oyo epesamaki mpo na eleko ya Zubile.  

Kobondela mpo na kimya na esika lokola oyo, ezali kokundola mpota ya bobombi ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Mpo na ba benedictins, Mont Cassin ezali vokation ya motuya, mpo na kozala elembo ya kimya n antina ya lisolo oyo etuka ezwaki. Ezali bat oba boboto nde bazongelaki kotonga bifelo biye, elobaki Pàpa Paul VI.

Bozali ya Pàpa, ezali likabo mpe bomipesi mpo na bato.

Toyokaki ‘te tozwaki libondisi mpe elendiseli na bomoi bwa biso ya bonganganzambe mpe na misala misusu ya lingomba, esukisaki Dom Fallica. Likabo ya mwa bangonga wana oyo tolekisaki elongo na Mokitani ya Petro ekomi sikawa momesano ya mosala: “esengeli kobota mbuma mpo na bolamu bwa Eklezia mpe mpo na bolamu bwa bato banso na mokili”.

 

Matondo mingi na ndenge botangi lisolo liye.

20 sánzá ya nsambo 2026, 23:15