Elilingi mpo ya ndakisa Elilingi mpo ya ndakisa 

SCEAM epaleli bakonzi ya politiki mpo na liwa lya Mgr Osorio Citora Afonso

Na liyebisi moko epesamaki na mokolo mwa poso, mwa 6 ya sànzà ya Yuni, Symposium ya ba episkopo ya Afrika mpe Madagascar (SCEAM) emonisaki kàndà na yango makasi mpo na liwà lya Mgr Osorio Citora Afonso, oyo akufaki na Quelimane na Mozambiki na bùtù ya mokolo mwa 5 mpo na komona oyo moye mwa 6 Yuni. Baepiskopo bapaleli na makasi likambo lya mobùlù mwa sómo mpe babeti nsete ‘te baye bamipesi na mosala mwa Nzambe mpe na bolamu bwa bato banso basengeli na libateli mpe na limemya.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Maloba maye Episkopo wa lokùmù Fridolin Ambongo, mokambi ya Symposium, atyaki mokoloto mwa ye, ezali kolobela liwa lya Mgr Afonso lokola libakù ya sika ya kokundola ntina ya bosembo, ya kimia, ya botosi ya lokumu la moto. Lisusu, elobeli mpe ntina ya kobatela bonsomi ya bato ba losambo (liberté religieuse), bobele na mboka Mozambiki te, kasi na mokili mobimba. “Likambo liye ya nsomo, esalami epai ya Mokengeli mpaté (pasteur) ya libota lya bana ba Nzambe, eleki mpenza, mpamba tè, basengeli ata tè, kosimba bomoi mpe lokumu ya mosali mwa Nsango Elamu”. Baepiskopo bamonisaki ‘te: “Kosala likambo wana, ezali kotyola to kobebisa mabongi to bizaleli bya moboko, lokola kimya, bosembo, lokumu la moto mpe bonsomi bya bato ba losambo. Bango bazali makónzi mya ntina mpo na bokóli mpe boyokani kati na lisanga lya bato nyonso ( societe)”.



Boséngà bya lumemya epai ya baye bamibonzi na mosàlà ya bolamu by abato banso

Baepiskopo bapaleli makasi likambo liye; bongo balobaki ‘te “mokambi moko te ya eklezya, ata ya lingomba nini to ya mimeseno nini, asengeli koyoka mpasi likambo ya mobulu ya ndenge wana”. “Baye bamipesi bomoi bwa bango na mosala mwa Nzambe mpe na kotombola boyokani, lisungi, mateya, bolingo mpe bolamu bwa bato banso, basengeli na libateli mpe kopesama limemya”. Esengaki nde SCEAM, na mbulamatari ya Répibliki ya Mozambiki, Abengi bakonzi banso oyo bazali na makoki, ya “kotya mosolo mpo na bolukiluki bya lombango, bya makasi mpe polele”, mpo bàyéba ntina ya liwa la episkopo ya Mozambiki.

Epai mosusu, basengaki na bakonzi ya Mozambiki ‘te bakobisa milende mya bango mpo na “kotya libateli mpe bokengi ya bakonzi ya mangomba, ya bisika bya losambo, mpe ya bato banso baye bazali kosala misala ya pastoral mpe ya kosalisa bato”.

Mgr Osorio Citora Afonso, episkopo ya Quelimane mpe mokambi ya Lingomba ya Katoliko na Archidioseze ya Beira
Mgr Osorio Citora Afonso, episkopo ya Quelimane mpe mokambi ya Lingomba ya Katoliko na Archidioseze ya Beira

Boséngà to mokumba ya batela bonsomi ya bato balosambo

Elongo nà baye banso bazali kolela liwà lya Mgr Afonso, oyo SCEAM eyebi lokola “mósàli ya sembo, Mokengeli mpate oyo amipesaki bomoi bwa ye mobimba mpo na mosàla mwa Kristu mpe mwa Eklezya”. Baepiskopo basengaki na Mokonzi wa bomoi apesa ye bopemi bwa seko, “apesa ye matomba mpenza mpo ya mosala mwa ye asalaki na bosembo”. Symposium etindeli ba ndeko na biso ba Congolais ba condoléansi mawùti o mozindo. mpe “lisalisi to lisungi ya molimo” na ye na lisanga lya baepiskopo ya Katoliko ya Mozambique, na bakonzi ba lingomba, na bayambi ya lingomba mpe bayambi ya dioseze ya Quelimane, mpe nà oyo ya archidioseze ya Beira.

SCEAM ezali mpe kolendisa mokumba mwa Letà ya “kotala mpo ‘te moto na moto akoko kosalela boyambi bwa yé na bonsomi, na libateli mpe kozanga kobanga to kobangisa, mobulu to monyoko”. Akundoli ‘te bonsomi ya losambo ezali lotomo ya moboko mpe “etikali se moko ya moboko ma ntina ya mboka nyonso ya demokrasi mpe ya kimya'.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

08 sánzá ya motóbá 2026, 21:39