Somo mpe matanga na Mozambiki nsima ya liwa ya Mgr Osório, episkopo ya Quelimane
Bansango ya Vatikan
Mangomba ya baklisto banso bazali kolela episkopo ya minei ya dioseze ya Quelimane, oyo aponamaki na mobu 1954 na nse ya libateli ya Notre-Dame ya Délivrance. Dioseze epesaki liyebisi ‘te, mpo na kokundola episkopo, misa moko ekosalema o mokolo mwa 6 mwa 2026 na ngonga ya 18h00, na Katedrali Notre-Dame ya Délivrance ya Quelimane
Ut’o Madrid epai wapi azali na mobembo mwa ye, Pàpa Leon XIV ayokaki nsango eye ya mawa mpe ya liwà lya Mgr Citora Afonso, elobi directeur ya ndako ya bapanzi-nsango ya Saint-Siege. “Pàpa asangani na losambo na bato ya dioseze mpe ya Mozambiki na ngonga oyo ya mpasi, mpo ‘te Mokonzi apesa bango libondisi, abatela na bolingo bwa ye mobali mpe mwasi nyonso mpe atika maboko ya bato ya mobulu”.
Ayebanaki na nkombo ya “Don Osorio” Asalaki mpo na Dicastele ya Evangelisation, Section mpo na Evangelisation mpe ya eglise, mingi mingi (2017-2023), epai wapi azalaki na boyokani makasi na yango. Daniel Francisco Chapo, Mokambi ya Repibliki ya Mozambiki apesaki ba kondoleansi na ye na eklezya mpe abetaki nsete na liyebisi lya yé ‘te: “liwa lya Mgr Osório ezali libungi monene mpo na bato (société) ya mozambiki mpe eklezya. Alobelaki noki mpe ezalela ya yé ya bomikitisi, bomipesi mwa yé na mosàla mwa eklezya, mpe bolendisi na bizaleli bya kimya mpe ya boyokani”.
Azalaki moko ya lingomba ya Institut missionnaire Consolata. Mgr Citora azalaki secrétaire ya lisàngà ya ba episkopo ya Mozambiki, episkopo ya Quelimane kobanda sànzà ya mwambe ya mobu 2025 mpe, kobanda sànzà ya minei ya mobu moye, aponamaki na Pape Léon XIV, mokambi ya apostolat ya archidioseze ya Beira. Etukà ya Dioseze ya Quelimane ezali na ba kilomètele kare 57 798 mpe na mikolo miye, ezali na ba parwase mpe ba misio 29, ba CEVB pene na 1 930 mpe ba Katoliki 1 366 593, soki balandi ba statistiki ya mobù 2025.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye