2026.06.12/Misa ya requiem to bokundi ya Mgr Osório Citora Afonso, o mokolo mwa 12 juni  2026 2026.06.12/Misa ya requiem to bokundi ya Mgr Osório Citora Afonso, o mokolo mwa 12 juni 2026  ((R)Rights Reserved 2026)

Bokundi to matanga ya Mgr Osório oyo babomaki na Mozambiki

Mgr Luís Miguel Munoz Cárdaba, ntómà ya Pàpa na Mozambiki, akambaki o mokolo mwa 12 ya Yuni, misa ya bokundi to requiem ya Mgr Osório Citora Afonso, na catedrali Notre Dame ya Delivransi ya Quelinane. Pàpa Leon atindaki nsango ya mawa, sima ya liwà linà. Mposa ya yé, ezali ‘te; makambo matali bobomi bwa ye makoka kolimbolama malamu. Na ngambo na ye, Mgr Cárdaba alobaki ‘te “ezalaki bobomi moko ya nko mpe ya bozangi bosembo”.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Mgr Osório Citora Afonso, episkopo ya Quelimane oyo bakutaki ya kokufa na tongo na ndaku na yé o mokolo mwa 6 ya Yuni, azalaki na bambula 54 ans. Bakundaki ye o mokolo mwa poso mwa 13 ya Yuni, na nsima ya misa mànà ya requiem, oyo, Mgr Inácio Saure, archevêque ya Nampula mpe mokambi ya lisangà lya ba episkopo ya Mozambiki akambaki. Ezalaki tango moko ya mawa mpe ya kopesa mbote ya nsuka. Milùlù minà milekaki o miso ma Daniel Francisco Chapo, Mokambi ya ekolo Mozambiki, ya ba episkopo, ba Nganga-nzambe, basàngó, bamibonzà, mpe etuluku ya bato ba dioseze.

Makambo ya liwà moko ya mobulu oyo esengeli kolimbola

Wuta Espagne, esika azalaki kosukisa mobembo mwa ye ya mbala ya minei, Pape Léon XIV amonisaki mawa ma ye mpe bosàngani ya Eklezia Katoliko na nsango moko apesaki na mokambi ya likita lya baepiskopo ya Mozambiki, epai wapi Mgr Osório Citora Afonso, azalaki na mokumba ya secretaire générale. Na bangonga en aya Mawa, Pàpa alobaki boye : «Na zali elongo nà baepiskopo, mama oyo aboti ye, mpe libota lya yé mobimba, nà ba missionnaire Consolata, banganga-nzambe, mpe na bakristu basusu ya baeklezya ndenge na ndenge ya Qualimane mpe ya Beira. Alakelaki bango nsambo ya yé ».

«Awa bazali kozela ‘te makambo ma mobulu moye mosila kolimbolama, na sengi lisungi lya elikya mpe na sengi ‘te Mokonzi ayamba Mokengeli mpate oyo ya motema malamu, mpo ‘te tango eye ya mpasi elekisama na kondima, na mwinda mwa Kristu oyo asekwi, mpo na bolamu bwa Eklezya molingami ya Mozambiki. Nazali kopesa ye bobenisi bwa ngai ya bontómà, mpo ‘te atikala makasi na Nsango ya bolimbisi mpe ya boyokani», esukisi Papa.



Bobomi moko ya mabe mpe ezangi bosembo, ya mokengeli mpate ya motema monene

Na mateya ma ye, Mgr Luís Miguel Munoz Cárdaba, oy azali ntómà ya Pàpa na Mozambiki, alobaki na mateya ma ye ‘te ; «Liwa lya nsomo mpe ya mpasi ya Mgr Osório ezali likambo ya kokamwa mpo na biso banso, kasi tozali kotàtola ‘te ezali liwà ezangi bosembo mpe ya motema nkó».

«Azalaki mpenza moto molamu, yango nde Pàpa atyaki ye episkopo ya dioseze ya Quelimane na sànzà ya Agusti ya mobù 2025. Azalaki mpe lokola, administrateur apostoliki ya archidioseze ya Beira na Aprili ya mobù moye 2026. Lisusu azalaki mokambi to presidà ya lisanga lya ba episkopo ya mboka. Elimboli ‘te azalaki na mikumba ebele koleka». Mgr Cárdaba alobi ‘te «azalaki moninga malamu mpo na yé»  

Ntómà ya Pàpa alobelaki mpe elilingi moko epai wapi, yambo ‘te babóma ye, Mgr Osório azalaki kolobela boboto (kimya), limemya, masóló mpe kozala na motema molayi ya ba-Mozambiki banso. Kasi «babómi moto ya boboto, babómi moto ya boyokani, missionele oyo azalaki kondima na bolamu y abato; mobateli to mokengeli mpate oyo amipesaki na mosala mwa Nzambe tee na nsuka», ekobaki ye koloba. 

Lelo, Kayina abomi lisusu ndeko wa yé Abele

Alobi ‘te makila ya Mgr Dom Osório esanganaki na maye ma bato ebele na mokili mobimba, oyo basàli eloko te, bato oyo bazali konyokwama mpo na bozangi bosembo, bitumba, mobulu, zuwa, kanyaka mpe terorisme. Liwa lya ye ya nsomo, lokola bawei basusu na mokili, ezali kopola to kokweyisama ya humanité. Lelo, Kayina abomi lisusu ndeko w aye Abele. Lelo, moto akomi nkosi ya mozalani na yé. Mobulu ebeti lisusu o kati ya bandeko moko. Liboso lya mabe makasi, tosengeli koloba lelomei ‘te : «Ekoki boye ! Tolingi moliki malamu, societe ekeseni», elobi motindami ya Saint-Siege. Alobi ‘te “tolingo bomoi, tolingi bondeko, tolingi boboto”.

Engebene na maloba ma Saint Jean Paul II: «soki ozali kotonga kimya na kati ya mokili ya mobulu mpe ya bitumba, soki ozali kobunda mpo na bosembo, na kosàlela bato, soki ozali koluka kozongisa mabe (vengeance), Nzokande, bosengeli kolinga banguna ba bino, soki na kati ya minyoko mpe mikakatano, bozali kobungisa elikya te mpo na bolamu, Bobele bongo nde bokoki kobongola mokili na lolenge ya malamu mpe ya makasi, bobele bongo nde bokoki kokoma batongi ya civilisation ya sika ya bolingo ».

Liwa liye ya nsomo, ekotikala mpamba te

«Makila ya Mgr Osório atangisi, epolisi mabele ya dioseze ya Quelimane, epolisi eklezya na Mozambiki. Tokoki kotika te ‘te makila ma bato baye basali likambo te epesa biso makanisi ya mabe, to elembisa biso nzoto. Te, ezali ntango ya kobongwana na mozindo, ya kobongola motema mpo na kopetolama, ya kozongisama ya sika kati na motema. Tika ete makila ya Episkopo Osório esala biso malamu, elongola biso masumu, ebongola biso na mabe na malamu, na molili na pole, elendisaki ntómà ya Pàpa, oyo atikali kondima ‘te "kufa to liwà lya wana ya mabe ekotikala mpamba te".



Ayebanaki na nkombo ya «Don Osório » , episkopo ba bomi, mosangani ya Institut missionnaire Consolata. Asalaki na Dicastele ya mpó ya bopalinginyi Nsango Elamu, section mpo na Evangelisation ya yambo mpe ya ba eklezya ya sika, kobanda mobù 2017 kino 2023.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

13 sánzá ya motóbá 2026, 21:47