2026.04.22 : Mgr António Juliasse Ferreira Sandramo, Episkopo ya Pemba na Mozambiko.  2026.04.22 : Mgr António Juliasse Ferreira Sandramo, Episkopo ya Pemba na Mozambiko.  

Na Mozambiko : Ba djihadistes batumbi eklezya moko

Babundisi mpo na mbala ya sika, parwase ya etukà ya Cabo Delgado. Malnati, mamelo ya ba Sœurs Comboniennes atatoli kotumbama ya eklezya moko na mboka Meza. Mpo na Mgr Juliasse Ferreira Sandramo, oyo abyangi bandeko ba mokili mobimba na bosalisani. Ut’o mibù libwà, ba eklezya mpe ba chapellez ezali kobebisama mpe kotumbama.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Mobulu ya ba djihadiste ezali kokoba na Cabo Delgado, na Mozambiko, esika wapi bitumba eumeli koleka mbula mwambe mpe esili koboma bato koleka 6 200 mpe bato koleka milio 1,3 bakimi mboka ba bango. Kutu batumbaki ndako-nzambe moko, babwakaki ndako ya ba Sàngo Piaristes, mpe babebisaki esika biye babokoloko bana. Sœur Laura Malnati, provinciale ya ba Sœurs Missionnaires Comboniennes ya mboka ena, ayebisaki na zulunalo ya Katholiki ya mboka Italie, ya Avvenire, likambo lya mobulu moye.

Litatoli lya Mamelo Malnati

Na lisolo la yé, o mokolo mwa minei mwa 30 Aprili sima ya nzanga, bato ba Etumba ya Ahlu al-Sunna wa al-Jama'a, etuluku moko ya mboka ezali na boyokani na etuluku oyo ebengami Etat islamique (EI) mpe ezali kosala banda 2017 - babundisaki mboka Meza, na district ya Ancuabe, na province ya nord ya Cabo Delgado. Alobaki ‘te : «Batumbaki bandako nyonso ya mboka na biso ». Nzikande bayebisaki basàngo liboso na tango esengelaki mpe balongwaki kolongwa na Meza yambo ‘te « bato ba mobulu » bakoma. Ebakisaki ye. Bato bànà, babebisaki mpe bandako mingi, mpe batumbaki bandako mosusu ya Parwase. Ndako wana etongamaki na 1946 mpo na kokumisa Santu Louis de Montfort, batalelaka yango lokola elembo ya Lingomba ya Katoliko na etúká yango.

Bato ba mboka o kati ya kokamwa  

Kati na liyebisi liye atindelaki lisanga ya lisungi mpo na eklezya ezali na mpasi (aide à l’église en detresse), Mgr António Juliasse Ferreira Sandramo, episkopo ya Pemba, mboka mokonzi ya Cabo Delgado, alobaki ‘te basoda bayaki na ngonga ya 16h00 mpe bakotaki na ndako-nzambe, bakataki yango mobimba yambo ‘te batumbaki yango na moto. “Ezalaki mpenza likambo lya sómó. Biloko binso bibebaki. Na ntango ya etumba, bakangaki basivile mpe basalelaki bango lokola batatoli mpo na kopesa nsango ya koyinana. Bamisionele bazali na libateli, kasi bato ya mboka babangi makasi,  bazali kokamwa. Atako basali nyonso, boyambi y abato bàna ekosila bobebisama soki moke te”.

Mbela mpo na bomoko ya mokili mobimba

Episkopo abéngaki lisungi ya mokili mobimba mpo na bato bazali konyokwama na mobulu ya ba djihadistes kati na etúka. “Tozali kosenga likebi mpe lisungi “, elobaki yé. Na boumeli ya mibu libwa, bandako-nzambe ya basango mpe ya mangomba ya Katoliko ebundisamaki, ebebisamaki mpe etumbamaki na dioseze  

Bobola kasi ezali mboka etondi nkita ya mabanga maa ntalo

Cabo Delgado ezali moko ya bituka ya bobola koleka na Mozambiko, ezali na esika ya mibale nsima, na motango ya Banque mondiale. Kasi, na Nordi ya ekólo yango ezali na bisika mingi ya kotimola mabanga ma ntalo mpe ya kobomba gaze, mpe bakompanyi mingi ya Mikili ya poto ezali kosala mosala ya kobimisa gaze na nse ya mabele. Mpo Haut-Commissariat ya ONU, n antina ya mobulu, bato bakimá bamboka, bato koleka 110 000 bakimaki bandako na bango na 2025.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

03 sánzá ya mítáno 2026, 11:29